-
Zekaria 11:12, 13Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Bongo nalobaki na bango: “Soki bolingi, bópesa ngai lifuti na ngai; soki bolingi te, bótika.” Mpe bapesaki ngai* lifuti na ngai, mbongo ya bibende 30 ya palata.+
13 Bongo Yehova alobaki na ngai: “Wana nde motuya oyo bango bapesi ngai! Bwaká ebele ya mbongo yango na esika ya kobomba mosolo.”+ Bongo nazwaki mbongo yango ya bibende 30 ya palata mpe nabwakaki yango na esika ya kobomba mosolo na ndako ya Yehova.+
-