Matai 6:6 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Kasi yo, ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana.+ Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana akofuta yo. Matai 14:23 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Nsima ya kozongisa ebele ya bato wana, amataki na ngomba kaka ye moko mpo na kobondela.+ Ntango butu eyaki, azalaki kuna, kaka ye moko. Marko 1:35 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 35 Na ntɔngɔntɔngɔ, wana molili ezalaki naino, atɛlɛmaki, abimaki na libándá mpe akendaki na esika oyo bato bazalaka te, mpe kuna abandaki kobondela.+ Luka 6:12 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Na moko ya mikolo yango, akendaki na ngomba mpo na kobondela,+ mpe alekisaki butu mobimba na kobondela Nzambe.+
6 Kasi yo, ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana.+ Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana akofuta yo.
23 Nsima ya kozongisa ebele ya bato wana, amataki na ngomba kaka ye moko mpo na kobondela.+ Ntango butu eyaki, azalaki kuna, kaka ye moko.
35 Na ntɔngɔntɔngɔ, wana molili ezalaki naino, atɛlɛmaki, abimaki na libándá mpe akendaki na esika oyo bato bazalaka te, mpe kuna abandaki kobondela.+
12 Na moko ya mikolo yango, akendaki na ngomba mpo na kobondela,+ mpe alekisaki butu mobimba na kobondela Nzambe.+