5 Bato yango 12, Yesu atindaki bango mpe apesaki bango malako oyo:+ “Bókende epai ya bato ya bikólo mosusu te, mpe bókɔta ata na engumba moko te ya Samaria;+6 kasi, bókoba kokende epai ya bampate oyo ebungá ya ndako ya Yisraele.+
4 baoyo bazali Bayisraele. Bango nde Nzambe azwaki mpe akómisaki bango bana na ye,+ bazwaki nkembo, kondimana,+ likabo ya Mibeko,+ mosala mosantu+ ná bilaka;+
12 Na ntango wana bozalaki na Kristo te, botangwaki mosika na ekólo ya Yisraele, bozalaki bapaya na kondimana ya elaka;+ bozalaki na elikya te mpe bozalaki na Nzambe te na mokili.+