Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 20:26, 27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Esengeli kozala bongo te na kati na bino;+ kasi moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino,+ 27 mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.+

  • Marko 9:35
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Bongo afandaki, abengaki bantoma zomi na mibale mpe alobaki na bango: “Soki moto alingi kozala moto ya liboso, asengeli kozala moto ya nsuka ya bato nyonso mpe mosaleli ya bato nyonso.”+

  • Luka 9:48
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 mpe alobaki na bango: “Moto oyo ayambi mwana oyo ya moke mpo na nkombo na ngai ayambi mpe ngai; mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai.+ Mpo moto oyo azali komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.”+

  • Luka 22:26
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Kasi bino bosengeli kozala bongo te.+ Nzokande moto oyo aleki na kati na bino akóma lokola leki ya nsuka mpenza,+ mpe moto oyo azali kokamba akóma lokola moto oyo azali kosala.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto