-
Matai 21:1-3Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 Ntango bapusanaki penepene na Yerusaleme mpe bakómaki na Betefage, na Ngomba ya Olive, Yesu atindaki bayekoli na ye mibale,+ 2 alobi na bango: “Bókende na mboka oyo bozali komona liboso na bino, mpe na mbala moko bokomona mpunda oyo bakangi na nsinga, ná mwana ya mpunda pembeni na yango; bófungola yango mpe bóyela ngai yango. 3 Soki moto moko alobi na bino likambo, bosengeli koloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’ Bongo na mbala moko akopesa bino yango.”
-
-
Luka 19:29-34Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
29 Mpe ntango bapusanaki pene na Betefage mpe Betani na ngomba babengi Ngomba ya Olive,+ atindaki bayekoli mibale,+ 30 alobi: “Bókende na mboka oyo bozali komona liboso na bino, mpe nsima ya kokɔta kuna, bokomona mwana ya mpunda oyo bakangi nsinga, oyo likoló na yango moto moko afandá naino te. Bófungola yango mpe bóya na yango awa. 31 Kasi soki moto moko atuni bino: ‘Mpo na nini bozali kofungola yango?’ bosengeli koloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’” 32 Bongo baoyo atindaki bakendaki mpe bakutaki yango kaka ndenge alobaki na bango.+ 33 Kasi ntango bazalaki kofungola mwana-mpunda yango, bankolo na yango balobaki na bango: “Mpo na nini bozali kofungola mwana-mpunda wana?” 34 Balobaki: “Nkolo azali na mposa na yango.”
-