Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 7:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino;+ bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.+

  • Matai 18:19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Lisusu nazali koyebisa bino ya solo, soki awa na mabele, bato mibale na kati na bino bayokani mpo básɛnga ata likambo nini ya ntina na libondeli, Tata na ngai oyo azali na likoló akosalela bango likambo oyo basɛngi.+

  • Matai 21:22
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Nyonso oyo bokosɛnga na libondeli, soki bozali na kondima, bokozwa yango.”+

  • Luka 11:9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na yango nazali koloba na bino: Bókoba kosɛnga,+ mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.+

  • Yoane 14:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Lisusu, nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, nakosala yango, mpo Tata azwa nkembo na nzela ya Mwana.+

  • Yoane 15:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Soki botikali na bomoko elongo na ngai mpe soki maloba na ngai etikali na kati na bino, bokoki kosɛnga nyonso oyo bolingi mpe ekosalema mpo na bino.+

  • Yoane 16:24
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Tii sikoyo, naino bosɛngi ata eloko moko te na nkombo na ngai. Bósɛnga mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto