-
Luka 21:25, 26Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 “Lisusu, bilembo ekozala na moi, na sanza mpe na minzoto,+ mpe na mabele bikólo bakozala na nsɔmɔ, bakoyeba te ndenge ya kosala mpo mbu ezali konguluma mpe kotomboka. 26 Bato bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi, mpo banguya ya likoló ekoningana.
-