-
Matai 3:11, 12Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Ngai nazali kobatisa bino na mai mpo bobongoli mitema;+ kasi moto oyo azali koya nsima na ngai azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye.+ Moto yango akobatisa bino na elimo santu+ mpe na mɔtɔ.+ 12 Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye, mpe akopɛtola mpenza esika na ye ya kotutatuta mbuma. Akoyanganisa blé na ye na ndako ya kobomba biloko, kasi akotumba mposo na yango na mɔtɔ+ oyo ekoki kobomama te.”
-