-
Matai 4:5-7Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Bongo Zabolo amemaki ye na engumba mosantu.+ Atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo*+ 6 mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, omibwaka na nse, mpo ekomamá ete: ‘Akopesa baanzelu na ye mitindo mpo na yo, mpe bakomema yo na mabɔkɔ na bango mpo lokolo na yo etutana na libanga te.’”+ 7 Yesu alobaki na ye: “Ekomamá lisusu ete: ‘Osengeli te komeka Yehova* Nzambe na yo.’”+
-