Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 8:24-27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Kasi talá! mopɛpɛ moko makasi ebɛtaki likoló ya mbu, mpe mbonge ezalaki se kozipa masuwa; nzokande Yesu azalaki kolala mpɔngi.+ 25 Bayaki kolamwisa ye, balobi: “Nkolo, bikisá biso, tolingi kokufa!” 26 Kasi alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kobanga boye, bino bato ya kondima moke?”+ Bongo atɛlɛmaki, apamelaki mopɛpɛ mpe mbu, mpe kimya moko monene ekɔtaki.+ 27 Bongo bayekoli bakamwaki mpe balobaki: “Moto oyo azali nani? Ata mopɛpɛ ná mbu ezali kotosa ye.”

  • Marko 4:37-41
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Nzokande mopɛpɛ moko ya makasi mpe ya nsɔmɔ mpenza ebandaki. Mbonge ezalaki se kobɛta masuwa, bongo etikalaki moke masuwa etonda na mai.+ 38 Kasi Yesu azalaki na eteni ya nsima ya masuwa, alalaki likoló ya kuse. Bongo balamwisaki ye mpe balobaki na ye: “Moteyi, tolingi kokufa mpe ezali kosala yo eloko te?” 39 Na yango atɛlɛmaki mpe apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu: “Shiii! Fandá nyɛɛ!”+ Mpe mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki. 40 Bongo alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kobanga boye? Bozali naino na kondima te?” 41 Kasi kobanga moko ya nsɔmɔ ekangaki bango, mpe balobanaki bango na bango: “Moto oyo azali mpenza nani? Ata mopɛpɛ ná mbu ezali kotosa ye.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto