-
Matai 8:30-34Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
30 Mwa mosika na bango, etonga moko ya ebele ya bangulu ezalaki kolya.+ 31 Bongo bademo babandaki kobondela ye mpe koloba: “Soki obimisi biso, tindá biso na etonga wana ya bangulu.”+ 32 Alobaki na bango: “Bókende!” Bongo babimaki mpe bakɔtaki na bangulu; mpe talá! etonga yango nyonso ya bangulu emibwakaki longwa na likoló ya lobwaku tii na mbu mpe ekufaki na mai. 33 Kasi babateli ya etonga yango bakimaki, bakɔtaki na engumba mpe bayebisaki makambo nyonso, ezala lisolo ya bato oyo bazalaki na bademo. 34 Mpe bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu. Ntango bamonaki ye, basɛngaki ye alongwa na etúká na bango.+
-
-
Marko 5:11-17Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Nzokande etonga moko monene ya bangulu+ ezalaki kolya kuna na ngomba.+ 12 Bongo bilimo yango ebondelaki ye ete: “Tindá biso na bangulu mpo tókɔta na kati na yango.” 13 Mpe apesaki bango nzela. Na yango, bilimo yango ya mbindo ebimaki mpe ekɔtaki na kati ya bangulu; mpe etonga mobimba, oyo ezalaki na bangulu soki 2 000, emibwakaki banda na likoló ya lobwaku tii na mbu, mpe ezindaki na mbu. 14 Kasi babateli ya etonga yango bakimaki mpe bayebisaki yango bafandi ya engumba mpe ya bamboka ya zamba, mpe bato bayaki kotala likambo oyo esalemaki.+ 15 Bongo bayaki epai ya Yesu, mpe bamonaki moto oyo azalaki na bademo; moto oyo liboso azalaki na limpinga ya bademo, afandi, alati bilamba mpe akómi na makanisi malamu, bongo babangaki. 16 Lisusu, baoyo bamonaki likambo yango bayebisaki bango likambo oyo ekómelaki moto oyo azalaki na bademo mpe oyo ekómelaki bangulu. 17 Na yango, babandaki kobondela Yesu ete alongwa na etúká na bango.+
-