-
Marko 5:35-37Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
35 Ntango Yesu azalaki naino koloba, bato mosusu oyo bautaki na ndako ya mokambi ya sinagoga bayaki mpe balobaki: “Mwana na yo ya mwasi akufi! Mpo na nini kotungisa lisusu Moteyi?”+ 36 Kasi Yesu ayokaki makambo oyo bazalaki koloba, mpe alobaki na mokambi ya sinagoga: “Kobanga te,* monisá kaka kondima.”+ 37 Nzokande apekisaki bato mosusu bálanda ye, longola kaka Petro, Yakobo, ná Yoane ndeko ya Yakobo.+
-