-
Matai 9:23-26Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
23 Nzokande, ntango akómaki na ndako ya mokambi yango mpe amonaki babɛti-piololo* ná ebele ya bato oyo bazalaki na yikiyiki,+ 24 Yesu alobaki: “Bóbima libándá, mpo mwana oyo ya mwasi akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ Na yango babandaki kosɛka ye na lityo. 25 Ntango kaka ebele ya bato babimaki libándá, akɔtaki mpe asimbaki lobɔkɔ na ye,+ mpe mwana mwasi yango atɛlɛmaki.+ 26 Mpe nsango ya likambo yango epanzanaki na etúká yango mobimba.
-
-
Marko 5:38-43Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
38 Ntango bakómaki na ndako ya mokambi ya sinagoga, akutaki yikiyiki mpe bato bazalaki kolela mpe koganga makasi.+ 39 Nsima ya kokɔta, Yesu alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kolela mpe bozali na yikiyiki? Mwana yango akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ 40 Na yango babandaki kosɛka ye na lityo. Kasi nsima ya kobimisa bango nyonso libándá, azwaki tata ná mama ya mwana yango mpe baoyo bazalaki elongo na ye, mpe akɔtaki epai mwana yango azalaki. 41 Azwaki lobɔkɔ ya mwana yango, mpe alobaki na ye: “Talita kumi,” oyo, soki babongoli yango, elakisi: “Mwana mwasi, nalobi na yo, ‘tɛlɛmá!’”+ 42 Na mbala moko mwana yango ya mwasi atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola. (Azalaki na mbula 12.) Mpe na mbala moko bazalaki bango lisusu te mpo batondaki na esengo makasi. 43 Kasi alobaki na bango mbala na mbala* ete báyebisa moto moko te likambo yango,+ mpe alobaki ete bápesa mwana yango eloko ya kolya.
-