Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 12:24-30
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ntango Bafarisai bayokaki yango, balobaki: “Moto oyo azali kobimisa bademo kaka na nguya ya Beelezebube,* mokonzi ya bademo.”+ 25 Lokola ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko nsukansuka ebebaka, mpe engumba nyonso to libota* nyonso oyo ekabwani ekotɛlɛma te. 26 Ndenge moko mpe, soki Satana azali kobimisa Satana, akabwani na kati na ye moko. Bongo ndenge nini bokonzi na ye ekotɛlɛma? 27 Lisusu, soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube, bongo bayekoli* na bino bazali kobimisa bango na nguya ya nani? Yango wana, bango bakozala basambisi na bino. 28 Kasi soki ezali na nzela ya elimo ya Nzambe nde nazali kobimisa bademo, boye Bokonzi ya Nzambe ekómeli bino mpenza.+ 29 To ndenge nini moto akoki kokɔta na ndako ya moto moko ya makasi mpe kozwa biloko na ye? Asengeli naino kokanga moto yango ya makasi bansinga, bongo na nsima akoki koyiba biloko na ndako na ye. 30 Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.+

  • Marko 3:22-27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Lisusu, bakomeli oyo bautaki na Yerusaleme bazalaki koloba: “Azali na Beelezebube,* mpe azali kobimisa bademo na nguya ya mokonzi ya bademo.”+ 23 Bongo, nsima ya kobenga bango epai na ye, alobaki na bango na bandakisa ete: “Ndenge nini Satana akoki kobimisa Satana? 24 Soki bokonzi moko ekabwani na kati na yango moko, bokonzi yango ekoki kotɛlɛma te;+ 25 mpe soki libota* moko ekabwani na kati na yango moko, libota yango ekokoka kotɛlɛma te. 26 Lisusu, soki Satana azali komibundisa ye moko mpe akabwani, akoki kotɛlɛma te, kasi yango ezali nsuka na ye. 27 Kutu, moto oyo akɔti na ndako ya moto moko ya makasi akoki koyiba biloko na ye kaka soki akangi naino moto yango ya makasi bansinga. Na nsima nde akoki koyiba biloko na ndako na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto