17 “Osengeli te kolula ndako ya moto mosusu. Osengeli te kolula mwasi ya moto mosusu,+ ezala moombo na ye ya mobali to ya mwasi, ngɔmbɛ na ye ya mobali, mpunda na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moto mosusu.”+
21 “‘Osengeli te kolula mwasi ya moto mosusu.+ Osengeli te kotala na liso ya lokoso ndako ya moto mosusu, elanga na ye to moombo na ye ya mobali to ya mwasi, ngɔmbɛ na ye to mpunda na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moto mosusu.’+
5 Na yango, bóboma biteni ya nzoto na bino+ ya mabele na makambo etali pite,* mbindo, mposa makasi ya kosangisa nzoto,+ mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe lokoso, oyo ezali losambo ya bikeko.