Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mosakoli 11:9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Elenge, sepelá na bolenge na yo, mpe motema na yo ezala na esengo ntango ozali naino elenge, landá banzela ya motema na yo mpe kende esika miso na yo ezali komema yo; kasi yebá ete Nzambe ya solo akosambisa yo* mpo na makambo wana nyonso.+

  • Matai 6:20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Kasi, bómibombela biloko ya motuya na likoló,+ epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te,+ mpe epai miyibi bakɔtaka te mpe bayibaka te.

  • 1 Timote 6:17-19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Pesá bazwi ya mokili oyo* mitindo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi,+ kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko ebele mpenza mpo tósepela.+ 18 Yebisá bango básala makambo ya malamu, bázala bazwi na misala ya malamu, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato oyo bayebi kokaba,+ 19 bámibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo bakotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya,+ mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.+

  • Yakobo 2:5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka. Nzambe aponaki nde te baoyo bazali babola na mokili mpo bázala bazwi na kati ya kondima+ mpe bazwi-ya-libula ya Bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto