Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17:13, 14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Yehova azalaki se kokebisa Yisraele mpe Yuda na nzela ya basakoli na ye nyonso mpe bamoni-bimonaneli+ na ye nyonso, alobi: “Bótika misala na bino ya mabe!+ Bótosa mitindo na ngai mpe mitinda na ngai, na kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bankɔkɔ na bino mpe oyo nayebisaki bino na nzela ya basaleli na ngai basakoli.” 14 Kasi baboyaki koyoka, mpe bazalaki kaka mitó makasi* lokola bankɔkɔ na bango oyo bandimelaki Yehova Nzambe na bango te.+

  • 2 Ntango 36:15, 16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango akobaki kokebisa bango na nzela ya bamemi-nsango na ye; akebisaki bango mbala na mbala, mpo na mawa oyo azalaki koyokela bato na ye mpe esika na ye ya kofanda.* 16 Kasi bazalaki kaka komona mpamba bamemi-nsango ya Nzambe ya solo,+ bazalaki kotyola maloba na ye+ mpe kosɛka basakoli na ye,+ tii ntango nkanda ya Yehova eyelaki bato na ye,+ tii bakokaki lisusu kobikisama te.

  • Misala 7:52
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Nani na kati ya basakoli bankɔkɔ na bino banyokolaki te?+ Ɛɛ, babomaki baoyo basakolaki liboso na ntina etali koya ya Moto ya sembo,+ oyo bino botɛki mpe bobomi ye,+

  • Baebre 11:36, 37
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Ɛɛ, bamosusu bamekamaki na ndenge basɛkaki bango mpe babɛtaki bango fimbo, kutu koleka oyo wana, bakangamaki na minyɔlɔlɔ+ mpe na bolɔkɔ.+ 37 Babambaki bango mabanga,+ kondima na bango emekamaki, bakatamaki biteni mibale na sii, babomamaki na mopanga,+ bazalaki koyengayenga balati mposo ya bampate, mposo ya bantaba,+ bazalaki kokelela, kozwa bolɔzi,+ konyokwama;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto