Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 118:22
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Libanga oyo batongi-ndako babwakaki

      Ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.*+

  • Yisaya 28:16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Yango wana talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

      “Talá na Siona, nazali kotya libanga oyo emekami ezala moboko,+

      Libanga ya ntina mingi oyo ezali na motuya,+ ya moboko ya solosolo.+

      Moto oyo azali komonisa kondima akozala na nsɔmɔ te.+

  • Matai 21:42
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Yesu alobaki na bango: “Botángá naino te na Makomami ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki, yango nde ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.*+ Yango euti epai ya Yehova,* mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?+

  • Matai 21:44
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Lisusu, moto oyo akokwea likoló ya libanga oyo, akopanzana.+ Mpe moto nyonso oyo yango ekokwela, ekonika ye.”+

  • Marko 12:10, 11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Botángá naino te eteni oyo ya Makomami, ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.*+ 11 Yango euti epai ya Yehova,* mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?”+

  • Misala 4:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yesu yango azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki mpamba, mpe oyo ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.’*+

  • 1 Petro 2:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na yango, azali na motuya nde epai na bino, mpamba te bozali bandimi; kasi epai ya baoyo bazali kondima te, “libanga oyo batongi-ndako babwakaki+ nde ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako,”*+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto