Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 21:45, 46
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Ntango banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai bayokaki bandakisa ya Yesu, bayebaki ete azalaki kolobela bango.+ 46 Atako balingaki kokanga ye, babangaki ebele ya bato, mpo ebele yango ya bato bazalaki komona ete azali mosakoli.+

  • Matai 26:3-5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu ya ekólo bayanganaki na lopango ya nganga-nzambe monene, oyo nkombo na ye ezalaki Kaifa,+ 4 mpe bayokanaki+ bákanga Yesu na mayele mabe* mpe báboma ye. 5 Kasi bazalaki koloba: “Na fɛti te, noki te yikiyiki ebima na kati ya bato.”

  • Marko 14:1, 2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Nzokande, etikalaki mikolo mibale+ mpo Elekeli+ mpe fɛti ya Mampa ezangá levire+ ekoka. Banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bazalaki koluka ndenge ya kokanga ye na mayele mabe* mpe koboma ye.+ 2 Kasi bazalaki koloba: “Na fɛti te, mbala mosusu yikiyiki ekobima na kati ya bato.”

  • Luka 20:19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Bongo bakomeli ná banganga-nzambe bakonzi bazalaki koluka ndenge ya kokanga ye na ngonga wana mpenza, mpo basosolaki ete apesaki ndakisa wana nde mpo na bango, kasi babangaki bato.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto