-
Baebre 9:13, 14Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 Banganga-nzambe basalelaka makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali*+ mpe bamwangisaka putulu ya mwana-ngɔmbɛ ya mwasi likoló ya bato oyo bakómi mbindo, mpe yango ekómisaka bango pɛto na miso ya Nzambe.+ 14 Kasi makila ya Kristo ezali na motuya mingi koleka,+ oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki epai ya Nzambe na litɔnɔ te, yango ekopɛtola nde te lisosoli na biso na misala oyo ezali kobota mbuma te+ mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?+
-
-
1 Petro 1:18, 19Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 Mpo boyebi mpenza ete ezalaki te na biloko oyo ekoki kobeba, na palata to na wolo, nde bosikolamaki*+ na lolenge ya bomoi ya mpambampamba oyo bankɔkɔ na bino batikelaki bino.* 19 Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya,+ lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ,+ makila ya Kristo.+
-