-
Matai 27:22-26Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
22 Pilate alobaki na bango: “Bongo nasala nini na Yesu oyo abengami Kristo?” Bango nyonso balobaki: “Baká ye na nzete!”*+ 23 Alobaki: “Mpo na nini? Mabe nini asali?” Atako bongo bakobaki koganga lisusu makasi koleka ete: “Baká ye na nzete!”+
24 Lokola amonaki ete yango ebimisaki eloko te, kaka yikiyiki nde ezalaki koya makasi, Pilate azwaki mai mpe asukolaki mabɔkɔ na ye liboso ya ebele ya bato yango, alobi: “Ngai nazali na ngambo te na makila ya moto oyo. Yango etali bino moko.” 25 Bongo bato nyonso bazongisaki: “Makila na ye ezala na mitó na biso mpe ya bana na biso.”+ 26 Bongo abimiselaki bango Barabasi, kasi atindaki bábɛta Yesu fimbo+ mpe akabaki ye mpo bábaka ye na nzete.+
-
-
Marko 15:12-15Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Pilate alobaki na bango lisusu: “Bongo nasala nini na moto oyo bozali kobenga Mokonzi ya Bayuda?”+ 13 Bagangaki lisusu: “Baká ye na nzete!”*+ 14 Pilate atunaki bango: “Mpo na nini? Mabe nini asali?” Atako bongo bagangaki lisusu makasi koleka ete: “Baká ye na nzete!”*+ 15 Na yango Pilate, lokola alingaki kosepelisa ebele yango ya bato, abimiselaki bango Barabasi; mpe nsima ya kotinda bábɛta Yesu fimbo,+ akabaki ye mpo bábaka ye na nzete.+
-