Matai 27:61 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 61 Kasi Maria Magadalene ná Maria mosusu bazalaki kaka wana, bafandi liboso ya lilita yango.+ Marko 15:47 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 47 Kasi Maria Magadalene ná Maria mama ya Yose bazalaki kaka kotala esika oyo balalisaki ye.+