-
Kolimbola Mibeko 12:5, 6Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Kasi, bosengeli kokende kosambela Yehova Nzambe na bino na esika oyo akopona na kati ya mabota na bino nyonso mpo na kotya wana nkombo na ye mpe esika na ye ya kofanda.+ 6 Kuna nde bosengeli komema makabo na bino ya kotumba,+ bambeka na bino, moko ya bandambo zomi+ na bino, likabo ya lobɔkɔ+ na bino, makabo na bino ya elako, makabo na bino ya bolingo,+ mpe bana ya liboso ya etonga na bino ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na bino ya bampate.+
-
-
Nzembo 122:maloba ya ebandeli ya loyembo-9Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.
122 Nasepelaki ntango balobaki na ngai ete:
“Tókende na ndako ya Yehova.”+
4 Mabota emati na engumba yango,
Mabota ya Yah,*
Na kolanda makundoli oyo Nzambe apesaki Yisraele,
Mpo na kopesa matɔndi na nkombo ya Yehova.+
6 Bósɛnga kimya mpo na Yerusaleme.+
Ee engumba, baoyo bazali kolinga yo bakobatelama.
7 Kimya ekoba kozala na kati ya bifelo na yo ya makasi,
Kobanga ezala te na bandako milai na yo ya makasi.
8 Mpo na bandeko na ngai mpe baninga na ngai nakoloba ete:
“Kimya ezala na yo.”
-