Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Misala 8:32
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Nzokande eteni ya Likomami oyo azalaki kotánga elobaki boye: “Lokola mpate, bamemaki ye na esika ya kobomama, mpe lokola mwana-mpate oyo efandaka kimya liboso ya mokati-nsuki na yango, ye mpe afungolaki monɔkɔ na ye te.+

  • Misala 8:35
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Filipe abandaki koloba, kobanda na Likomami wana asakolelaki ye nsango malamu oyo etali Yesu.

  • 1 Petro 1:18, 19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpo boyebi mpenza ete ezalaki te na biloko oyo ekoki kobeba, na palata to na wolo, nde bosikolamaki*+ na lolenge ya bomoi ya mpambampamba oyo bankɔkɔ na bino batikelaki bino.* 19 Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya,+ lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ,+ makila ya Kristo.+

  • Emoniseli 5:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe namonaki na katikati ya kiti ya bokonzi mpe ya bikelamu minei ya bomoi mpe na katikati ya bankulutu yango,+ mwana-mpate+ moko atɛlɛmi lokola nde abomamaki.+ Azalaki na maseke nsambo mpe miso nsambo; miso yango elakisi bilimo nsambo ya Nzambe+ oyo etindami na mabele mobimba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto