Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 53:12
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,

      Mpe akokabola biloko oyo epunzami elongo na bato ya nguya,

      Mpo apesaki bomoi na ye tii na liwa+

      Atángamaki na kati ya bato oyo babukaka mibeko;+

      Amemaki lisumu ya bato ebele,+

      Mpe abondelaki mpo na bato oyo babukaka mibeko.+

  • Bafilipi 2:8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Longola oyo wana, ntango ayaki lokola moto, amikitisaki mpe atosaki tii na liwa,+ ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi.*+

  • Baebre 2:9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi tozali komona Yesu, oyo atyamaki mwa moke na nse ya baanzelu,+ sikoyo alati motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo anyokwamaki mpe akufaki,+ mpo na nzela ya boboto monene ya Nzambe, akufa mpo na moto nyonso.+

  • Baebre 12:2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 awa tozali kotala na likebi Kapita mpe Moto oyo azali kokómisa kondima na biso ya kokoka, Yesu.+ Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi* mpiko, atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto