Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 27:27-29
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Bongo basoda ya guvɛrnɛrɛ bamemaki Yesu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe bayanganisaki etuluku mobimba ya basoda zingazinga na ye.+ 28 Balongolaki ye bilamba, mpe balatisaki ye elamba moko ya motane makasi,+ 29 mpe batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango na motó mpe basimbisaki ye mwa nzete na lobɔkɔ na ye ya mobali. Mpe, bazalaki kofukama liboso na ye, bazalaki kosɛka ye, balobi: “Mbote,* yo Mokonzi ya Bayuda!”

  • Marko 15:16, 17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Basoda bamemaki ye na kati ya lopango, elingi koloba, na ndako ya guvɛrnɛrɛ, mpe bayanganisaki etuluku mobimba ya basoda.+ 17 Mpe balatisaki ye elamba moko ya motane-bulé, batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango na motó.

  • Luka 23:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bongo Erode ná basoda na ye batyolaki Yesu;+ basɛkaki ye+ na ndenge balatisaki ye elamba moko ya lokumu, mpe na nsima bazongisaki ye epai ya Pilate.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto