-
Matai 26:63-65Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
63 Kasi Yesu afandaki kaka nyɛɛ.+ Bongo nganga-nzambe monene alobaki na ye: “Nalapisi yo ndai na nkombo ya Nzambe ya bomoi ete oyebisa biso soki ozali Kristo Mwana ya Nzambe!”+ 64 Yesu alobaki na ye: “Yo moko olobi yango. Kasi nalobi na bino: Banda sikoyo bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe ya nguya*+ mpe azali koya na mapata ya likoló.”+ 65 Bongo nganga-nzambe monene apasolaki bilamba na ye ya likoló, alobi: “Afingi Nzambe! Ntina nini tóluka lisusu batatoli? Talá! Boyoki ndenge afingi Nzambe.
-