-
Yoane 7:50-52Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
50 Nikodeme, oyo liboso akendaki epai ya Yesu mpe oyo azalaki moko ya Bafarisai yango, alobaki na bango: 51 “Mibeko na biso esambisaka moto te liboso ya koyoka ye mpe koyeba oyo azali kosala, boye te?”+ 52 Bayanolaki ye: “Yo mpe ozali nde moto ya Galile? Salá bolukiluki mpe okomona ete ata mosakoli moko te akobima na Galile.”*
-