3 Ezalaki na moto moko na kati ya Bafarisai na nkombo Nikodeme;+ azalaki mokonzi moko ya Bayuda. 2 Moto yango akendaki epai ya Yesu na butu+ mpe alobaki na ye: “Rabi,+ toyebi ete ozali moteyi oyo auti na Nzambe, mpo moto moko te akoki kosala makamwisi oyo+ ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.”+