Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 28:16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nzokande, bayekoli 11 bakendaki na Galile+ na ngomba oyo Yesu alakaki bango bákutana.+

  • Misala 1:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nsima ya komona mpasi, amimonisaki epai na bango na bilembeteli mingi mpo na kondimisa bango ete azalaki na bomoi.+ Bamonaki ye mikolo 40 mpe azalaki koyebisa bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe.+

  • Misala 3:15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 nzokande bobomaki Kapita ya bomoi.+ Kasi Nzambe alamwisaki ye uta na bakufi, likambo oyo biso tozali batatoli na yango.+

  • 1 Bakorinti 15:4-7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Akundamaki+ mpe asekwisamaki*+ na mokolo ya misato,+ na kotalela Makomami.+ 5 Abimelaki Kefa,*+ mpe na nsima bantoma zomi na mibale.+ 6 Na nsima na yango, abimelaki bandeko koleka 500 na mbala moko.+ Mingi na bango bazali tii sikoyo elongo na biso, kasi bamosusu bakufá. 7 Na nsima na yango abimelaki Yakobo,+ mpe na nsima bantoma nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto