8 Na mbula ya misato ya bokonzi ya Beleshazare,+ ngai Danyele nazwaki emonaneli moko, longola oyo nazwaki liboso.+ 2 Nazalaki kotala na emonaneli yango, mpe namonaki ete nazalaki na Shushane+ ndako makasi, oyo ezali na etúká ya Elame.+ Na emonaneli yango, namonaki ete nazali pene na mai ya Ulai.