22 Nsango na bango ekómaki na matoi ya lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme, mpe batindaki Barnabasi+ tii na Antiokia. 23 Ntango akómaki mpe amonaki boboto monene ya Nzambe, asepelaki mpe abandaki kolendisa bango nyonso ete bákangama na Nkolo na motema moko;+