18 Bokoki kokokanisa Nzambe na nani?+
Eloko nini bokoki kotya pembeni na ye oyo ekokani na ye?+
19 Moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ anyangwisi ekeko,
Mosali-bibende azipi yango na wolo,+
Mpe atye minyololo ya palata.
20 Aponi nzete mpo ezala likabo na ye,+
Nzete oyo ekopɔla te.
Aluki moto oyo ayebi malamu mosala ya mabɔkɔ
Mpo na kobongisa ekeko oyo ekotengatenga te.+