-
Bagalatia 5:19-21Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 Nzokande misala ya nzoto emonanaka polele; ezali pite,*+ mbindo, etamboli ya nsɔni na nko,*+ 20 losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe,*+ koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, 21 likunya, kolangwa masanga,+ bafɛti ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.+ Nazali kokebisa bino mpo na makambo wana, kaka ndenge nakebisaki bino liboso, ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te.+
-