-
1 Petro 4:10, 11Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
10 Na ndenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe, oyo emonisami na ndenge mingi.+ 11 Soki moto azali koloba, aloba lokola nde azali koloba maloba ya Nzambe; soki moto azali kosalela bamosusu, atya motema na makasi oyo Nzambe apesaka;+ mpo ete na makambo nyonso, Nzambe azwa nkembo+ na nzela ya Yesu Kristo. Nkembo mpe nguya ezali ya ye libela na libela. Amen.
-