-
Misala 18:24, 25Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
24 Moyuda moko nkombo na ye Apolosi,+ mwana-mboka ya Alezandria, akómaki na Efese; azalaki molobi moko malamu, mpe ayebaki Makomami malamu mpenza. 25 Moto yango ateyamaki na mateya ya* Yehova,* mpe lokola azalaki kopela na elimo, azalaki koloba mpe koteya na ndenge ya sikisiki mpenza makambo oyo etali Yesu, kasi ayebaki kaka batisimo ya Yoane.
-