-
Baroma 4:11, 12Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Mpe azwaki elembo,+ elingi koloba, akatamaki ngenga. Yango ezalaki elembo* ya bosembo mpo na kondima oyo azalaki na yango na ntango akatamaki naino ngenga te, mpo akóma tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima+ atako bakatamaki ngenga te, mpo bátángama bato ya sembo.* 12 Mpo azala mpe tata ya bana oyo bakatamá ngenga, kaka te ya bato oyo bakangamaka na kokatama ngenga, kasi mpe ya bato oyo bazali kolanda mpenza matambe ya kondima oyo tata na biso Abrahama+ azalaki na yango ntango akatamaki naino ngenga te.
-