Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 12:1-3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yehova alobaki na Abrama ete: “Longwá na mokili na yo mpe tiká bandeko na yo mpe ndako ya tata na yo mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.+ 2 Nakokómisa yo ekólo moko monene, nakopambola yo, nakokómisa nkombo na yo monene, mpe okokóma lipamboli.+ 3 Nakopambola baoyo bazali kopambola yo, mpe moto oyo azali kolakela yo mabe, nakolakela ye mabe,+ mpe mabota nyonso ya mabele ekopambolama* mpenza na nzela na yo.”+

  • Ebandeli 12:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na nsima, Yehova abimelaki Abrama mpe alobaki na ye ete: “Nakopesa libota*+ na yo mokili oyo.”+ Na yango, atongaki etumbelo kuna mpo na Yehova, oyo abimelaki ye.

  • Ebandeli 13:14, 15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Ntango Lota ná Abrama bakabwanaki, na nsima, Yehova alobaki na Abrama ete: “Nabondeli yo, tombolá miso na yo, mpe na esika ozali, talá na nɔrdi, na sudi, na ɛsti mpe na wɛsti, 15 mpo mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yo yango mpe na libota*+ na yo libela na libela.

  • Ebandeli 17:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Mpe nakokokisa kondimana na ngai oyo ezali kati na ngai ná yo+ mpe ná bato ya libota* na yo, oyo bakoya nsima na yo, ná mabota na bango mpo na kondimana moko ya libela, mpo nazala Nzambe na yo mpe ya bato ya libota* na yo, oyo bakoya nsima na yo.

  • Ebandeli 22:17, 18
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 nakopambola yo mpenza mpe nakokómisa mpenza bana* na yo mingi lokola minzoto ya likoló mpe lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu;+ mpe mwana* na yo akozwa bingumba* ya banguna na ye.+ 18 Mpe na nzela ya libota*+ na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela lipamboli mpo oyoki mongongo na ngai.’”+

  • Ebandeli 24:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Yehova Nzambe ya likoló, oyo alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili ya bandeko na ngai,+ mpe oyo alobaki na ngai mpe alapelaki ngai ndai+ ete: ‘Nakopesa libota*+ na yo mokili oyo,’+ akotinda anzelu na ye liboso na yo,+ mpe okozwela mwana na ngai mwasi kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto