Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Misala 8:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nzokande, Saulo abandaki konyokola lisangá. Azalaki kokɔta na ndako mokomoko mpe kobimisa mibali ná basi, azalaki kokangisa bango na bolɔkɔ.+

  • Misala 9:1, 2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi Saulo, lokola azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo,+ akendaki epai ya nganga-nzambe monene 2 mpe asɛngaki ye mikanda mpo na basinagoga oyo ezali na Damasi, mpo akanga na minyɔlɔlɔ mpe amema na Yerusaleme, moto nyonso oyo ye akokuta, oyo azali moto ya Nzela,+ mibali ná basi.

  • Misala 22:4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Nanyokolaki Nzela oyo tii na liwa, nazalaki kokanga mibali ná basi minyɔlɔlɔ mpe kobwaka bango na bolɔkɔ,+

  • Misala 26:9-11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpo na ngai, nandimisamaki ete nasengelaki kosala ndenge nyonso mpo na kotɛmɛla nkombo ya Yesu Monazarete. 10 Yango nde nasalaki mpenza na Yerusaleme, nakangaki ebele ya basantu na bolɔkɔ,+ mpo nazwaki lotomo yango epai ya banganga-nzambe bakonzi;+ mpe ntango esengelaki bábomama, nazalaki kondima ete bábomama. 11 Mbala mingi, na basinagoga nyonso nazalaki kopesa bango etumbu, mpe komeka kopusa bango na makasi ete báwangana kondima. Lokola nazalaki na nkanda na bango makasi mpenza, nakendaki mosika mpenza tii konyokola bango ata na bingumba mosusu.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto