-
Baefese 1:9, 10Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 na ndenge ayebisaki biso sekele mosantu+ ya mokano na ye. Yango eyokani na makambo oyo asepelaki kosala na kolanda mokano na ye 10 mpo na mosala ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá, mpo na koyanganisa biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabele.+ Ɛɛ, na nse ya bokonzi na ye,
-
-
Bakolose 1:26, 27Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
26 sekele mosantu+ oyo ebombamaki banda na bibongiseli ya kalakala*+ mpe na mabota ya kalakala. Kasi sikoyo emonisami polele epai ya basantu na ye,+ 27 oyo Nzambe asepeli koyebisa bango na kati ya bikólo nkembo ya sekele mosantu yango.+ Sekele yango ezali Kristo na bomoko elongo na bino, elikya ya nkembo na ye.+
-