23 Nzambe ya kimya ye moko asantisa bino mobimba. Mpe tiká ete elimo, molimo* mpe nzoto na bino bandeko, ebatelama kozanga mbeba mpe kozanga litɔnɔ na makambo nyonso na ntango ya kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+
4 Mpo na yango biso tozali komikumisa mpo na bino+ na kati ya masangá ya Nzambe, mpo na koyika mpiko na bino mpe kondima na bino na minyoko na bino nyonso mpe mikakatano* oyo bozali kokutana na yango.*+