11 Kasi, Farao mpe abengaki bato ya bwanya mpe banganga-nkisi, mpe banganga-nzambe ya Ezipito oyo basalelaka maji,+ basalaki mpe kaka bongo na misala na bango ya maji.+ 12 Moto na moto abwakaki lingenda na ye, mpe ekómaki banyoka ya minene; kasi lingenda ya Arona emɛlaki mangenda na bango.