Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 14:22, 23
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Kasi, mpo na bato oyo bamoni nkembo na ngai mpe bilembo+ na ngai oyo nasali na Ezipito mpe na esobe mpe atako bongo bazali kaka komeka ngai+ mbala zomi oyo, mpe bayoki te mongongo na ngai,+ moko te na kati na bango 23 akomona ata moke mokili oyo nalapelaki batata na bango ndai. Te, ata moto moko te na kati ya baoyo bazali kozanga limemya epai na ngai, akomona yango.+

  • Nzembo 95:7-11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Mpo ye azali Nzambe na biso,

      Mpe biso tozali bato ya esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti,

      Bampate oyo azali kobatela.*+

      Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye,+

       8 Bókómisa motema na bino makasi te lokola na Meriba,*+

      Lokola na mokolo ya Masa* na esobe,+

       9 Ntango bankɔkɔ na bino bamekaki ngai;+

      Batumolaki ngai, atako bamonaki misala na ngai.+

      10 Na boumeli ya mbula 40 nayokaki libota yango mabe mpenza,* mpe nalobaki ete:

      “Balandaka ntango nyonso bamposa ya mitema na bango;

      Bayebi banzela na ngai te.”

      11 Bongo nalapaki ndai na nkanda na ngai ete:

      “Bakokɔta te na kopema na ngai.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto