-
Yakobo 1:2-4Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge, bómona yango esengo mpenza,+ 3 mpo boyebi ete kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.+ 4 Kasi tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, bazangi eloko te.+
-