-
Kolimbola Mibeko 17:2-5Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 “Kanisá ete na kati na bino, na moko ya bingumba oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, bakuti mobali moko to mwasi moko azali kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova Nzambe na yo mpe azali kobuka kondimana na ye,+ 3 mpe moto yango abungi nzela mpe asambeli banzambe mosusu, agumbameli bango to agumbameli moi to sanza to limpinga nyonso ya likoló,+ eloko oyo napesi mitindo te.+ 4 Ntango bayebisi yo likambo yango to oyoki yango, okoluka koyeba likambo yango malamumalamu. Soki emonani ete ezali solo+ ete likambo yango oyo eyinamá esalemi na Yisraele, 5 osengeli komema mobali yango to mwasi yango oyo asali likambo yango ya mabe na baporte ya engumba, mpe basengeli kobamba mobali yango to mwasi yango mabanga tii akokufa.+
-