Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakorinti 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakorinti

      • Bimonaneli ya Paulo (1-7a)

      • “Nzubɛ moko na kati ya mosuni” (7b-10)

      • Nazali te na nse ya bantoma minene (11-13)

      • Paulo amitungisi mpo na Bakorinti (14-21)

2 Bakorinti 12:1

Mitindami

  • +Mis 2:17
  • +Mis 22:17, 18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mituna ya batángi

    w18.12 lok. 8 pars. 1-2

2 Bakorinti 12:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”

    bt mok. 1

    Mituna ya batángi

    w18.12 lok. 8

    Makambo nini endimisaka yo elikya ya Paladiso?

    w04 15/10 nk. 8-10

    Ozali komikundola?

    w04 15/12 lok. 30

    Minyoko esali ete mosala ekola na Antiokia

    w00 15/7 lok. 27

2 Bakorinti 12:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mituna ya batángi

    w18.12 lok. 8 pars. 6-12

    Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Bakolinti

    w08 15/7 lok. 28 par. 7

    Makambo nini endimisaka yo elikya ya Paladiso?

    w04 15/10 nk. 8-10

    Ndenge nini nzambe apemisaki Biblia?

    w97 15/6 lok. 5

2 Bakorinti 12:7

Mitindami

  • +Ga 4:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Okoki kobundisa mayoki ya mabe mpe kolonga yango

    w26.01 nk. 8-13

    Ndenge elimo santu esalisaka biso

    w19.11 lok. 9 par. 4

    “Nzubɛ moko na kati ya mosuni” ya Paulo

    mwb19.05 lok. 4

    Osengeli kobondelaka?

    w14 1/4 lok. 5

    Tozali na nguya ata na kati ya bolembu

    w08 15/6 nk. 3-4

    Yobo ayikaki mpiko mpe atikalaki sembo

    w06 15/8 lok. 21 par. 8

    Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’

    w06 15/12 lok. 24 par. 16

    Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino”

    w05 1/8 nk. 21-25

    Bato ya sembo babundaki na nzube kati na nzoto

    w02 15/2 nk. 13-14 pars. 5-7

    Makambo oyo ekoki kosalema na nguya ya libondeli

    w00 1/3 lok. 4

    Tozali nde na “monzube kati na nzoto”?

    km 6/98 lok. 1

    Bolɛmbu ya bato ezali kokumisa nguya ya Yehova

    w97 1/6 lok. 25

    ‘Bomimeka soko bozali kati na kondima’

    w90 15/9 lok. 26

2 Bakorinti 12:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Ndenge elimo santu esalisaka biso

    w19.11 lok. 9 pars. 5-6

    Osengeli kobondelaka?

    w14 1/4 lok. 5

    Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli mosusu te?

    w09 1/1 lok. 30

    Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’

    w06 15/12 lok. 24 par. 16

2 Bakorinti 12:9

Mitindami

  • +Yis 40:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya”

    w20.07 nk. 14-19

    Ndenge elimo santu esalisaka biso

    w19.11 lok. 9 pars. 5-6

    “Apesaka nguya na moto oyo alɛmbi”

    w18.01 lok. 9 pars. 8-9

    Tozali na nguya ata na kati ya bolembu

    w08 15/6 lok. 6

    Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’

    w06 15/12 lok. 24 pars. 17-18

    Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino”

    w05 1/8 lok. 21 par. 4

    Tóbunda na “monzube kati na nzoto”

    w02 15/2 nk. 18-19 pars. 3-6

    Makambo oyo ekoki kosalema na nguya ya libondeli

    w00 1/3 lok. 4

    Bolɛmbu ya bato ezali kokumisa nguya ya Yehova

    w97 1/6 lok. 25

2 Bakorinti 12:10

Mitindami

  • +Flp 4:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya”

    w20.07 nk. 14-19

    “Apesaka nguya na moto oyo alɛmbi”

    w18.01 lok. 9 pars. 8-9

    Tambolá na elimo mpe zalá na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo

    w10 15/3 lok. 18 par. 16

    Tozali na nguya ata na kati ya bolembu

    w08 15/6 nk. 3-6

    “Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo”

    w04 15/9 nk. 13-14 pars. 18-19

2 Bakorinti 12:11

Mitindami

  • +2Ko 11:23

2 Bakorinti 12:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya.”

Mitindami

  • +2Ko 6:4
  • +Mis 14:3; 15:12; Ro 15:18, 19

2 Bakorinti 12:13

Mitindami

  • +1Ko 9:11, 12; 2Ko 11:9

2 Bakorinti 12:14

Mitindami

  • +Mis 20:33
  • +1Ko 4:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tózala na “makanisi malamu” awa nsuka ekómi pene

    w97 15/8 lok. 20 par. 10

    Mokanda ya Biblia nimero 47—2 Bakolinti

    si lok. 214 par. 3

    ‘Tókokisa mposa ya mabota na biso’—Lolenge nini kolónga ntembe yango kati na mikili ya bobólá

    w96 1/10 lok. 29

2 Bakorinti 12:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo na bino.”

Mitindami

  • +2Ko 1:6; Kol 1:24; 1Te 2:8; Ebr 13:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tozali na esengo ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova!

    km 6/07 lok. 1

    Mpo na nini kozala na elimo ya komipesa?

    w00 15/9 nk. 22-23

    Salelá Nzambe na elimo ya komipesa

    w00 15/11 lok. 21

2 Bakorinti 12:16

Mitindami

  • +2Ko 11:9

2 Bakorinti 12:18

Mitindami

  • +2Ko 8:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Libota oyo ezali kolanda matambe ya Yesu

    w88 1/12 lok. 12 pars. 3-5

2 Bakorinti 12:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mituna ya batángi

    w12 15/3 lok. 31

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Ko. 12:1Mis 2:17
2 Ko. 12:1Mis 22:17, 18
2 Ko. 12:7Ga 4:13
2 Ko. 12:9Yis 40:29
2 Ko. 12:10Flp 4:13
2 Ko. 12:112Ko 11:23
2 Ko. 12:122Ko 6:4
2 Ko. 12:12Mis 14:3; 15:12; Ro 15:18, 19
2 Ko. 12:131Ko 9:11, 12; 2Ko 11:9
2 Ko. 12:14Mis 20:33
2 Ko. 12:141Ko 4:14
2 Ko. 12:152Ko 1:6; Kol 1:24; 1Te 2:8; Ebr 13:17
2 Ko. 12:162Ko 11:9
2 Ko. 12:182Ko 8:6
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakorinti 12:1-21

Mokanda ya mibale epai ya Bakorinti

12 Nasengeli komikumisa, na yango nakolobela bimonaneli+ oyo Nkolo amonisaki ngai mpe nsango oyo apesaki ngai,+ atako kosala bongo ezali na litomba te mpo na ngai. 2 Nayebi moto moko oyo, na bomoko elongo na Kristo, eleki mbula 14 amemamaki na likoló ya misato—nayebi te soki ezalaki na nzoto to na libándá ya nzoto, kasi Nzambe nde ayebi. 3 Ɛɛ, nayebi moto yango—nayebi te soki ezali na nzoto to na libándá ya nzoto, kasi Nzambe ayebi— 4 oyo amemamaki na paradiso mpe ayokaki maloba oyo ekoki kolobama te, oyo epesami nzela te ete moto aloba yango. 5 Nakomikumisa mpo na moto wana, kasi mpo na ngai moko te, longola kaka komikumisa mpo na bolɛmbu na ngai. 6 Mpo ata soki nalingi namikumisa, nakozala zoba te, mpo nakoloba nde solo. Kasi nalingi kosala bongo te, mpo moto moko te abakisela ngai makambo mosusu koleka oyo azali komona epai na ngai to oyo azali koyoka epai na ngai, 7 kaka mpo nazwaki bimoniseli ya kokamwa.

Mpo namitombola koleka ndelo te, bapesá ngai nzubɛ moko na kati ya mosuni,+ anzelu moko ya Satana, mpo akoba kobɛtaka ngai mbata, mpo nakoka te komitombola koleka ndelo. 8 Mbala misato nabondelaki Nkolo alongola nzubɛ oyo. 9 Kasi alobaki na ngai ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo, mpo nguya na ngai ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.”+ Na yango, na esengo nyonso, nakomikumisa nde mpo na bolɛmbu na ngai, mpo nguya ya Kristo ezala lokola hema likoló na ngai. 10 Na yango nazali kosepela na bolɛmbu, na mafinga, na bosɛnga, na minyoko mpe mikakatano, mpo na Kristo. Mpo ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.+

11 Nakómi zoba. Bino nde bato botindaki ngai nakóma bongo, mpo bino kutu nde bosengelaki kolobela ngai. Mpo namimonisaki ata na likambo moko te ete nazali na nse ya bantoma minene na bino, ata soki nazali eloko te.+ 12 Ya solo, nayikaki mpiko mpenza mpo na komonisa bino bilembeteli ya bontoma na ngai na bilembo,+ na makamwisi* mpe na misala ya nguya.+ 13 Kutu na likambo nini bino bokómi na nse ya masangá mosusu oyo etikali, soki ezali kaka te na likambo oyo ete ngai mpenza nakómaki kilo te epai na bino?+ Bólimbisa ngai mabe wana na motema moko.

14 Talá! Oyo ezali mbala ya misato namibongisi mpo na koya epai na bino, mpe nakokóma kilo te. Mpo nazali koluka te biloko oyo bozali na yango,+ kasi bino moko; mpo ezali bana te+ nde basengeli kobomba biloko mpo na baboti na bango, kasi baboti mpo na bana na bango. 15 Kasi ngai, na esengo nyonso, nakopesa biloko na ngai nyonso mpe nakopesa bomoi na ngai mobimba mpo na bino.*+ Soki nazali kolinga bino mingi boye, ebongi te bólinga ngai ndenge ngai nazali kolinga bino? 16 Kasi atako bongo, namemisaki bino kilo te.+ Nzokande, bozali koloba ete, nazalaki na “mayele mabe” mpe nazwaki bino “na mayele ya bokosi.” 17 Nalyelaki bino nde na nzela ya bato oyo natindaki epai na bino? 18 Nabondelaki Tito makasi aya kotala bino mpe natindaki ndeko mosusu elongo na ye. Tito alyelaki nde bino?+ Tomonisaki nde elimo moko wana te? Totambolaki nde na matambe moko wana te?

19 Na ntembe te bozali kokanisa ete tozali kosamba liboso na bino, kasi ezali bongo te. Kutu lokola bayekoli ya Kristo tozali koloba solo liboso ya Nzambe. Bandeko ya bolingo, makambo nyonso oyo tozali kosala ezali mpo na kotonga bino. 20 Mpo nazali kobanga ete ezala na ndenge nini, ntango nakoya, naya kokuta bino te ndenge oyo nalingi mpe namonana epai na bino te ndenge oyo bolingi, kasi nazali kobanga noki nakuta nde koswana, zuwa, bankanda makasi, kowelana, kotɔngana, banungunungu, kovimba na lolendo, mpe mobulu. 21 Mbala mosusu ntango nakoya lisusu, Nzambe na ngai akoki koyokisa ngai nsɔni liboso na bino, mpe nakoki kolela mpo na bato mingi oyo kala basalaki masumu kasi babongolaki motema te na mbindo na bango, pite* mpe etamboli ya nsɔni na nko* oyo bamipesaki na yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto