Mokanda ya mibale ya
4 Mokolo moko, mwasi moko kati na basi ya bana ya basakoli+ abelelaki Elisha, alobi: “Mosaleli na yo, mobali na ngai akufá, mpe oyebi malamu ete azalaki ntango nyonso kobanga Yehova.+ Sikoyo modefisi moko ayei kozwa bana na ngai mibale mpo akómisa bango baombo na ye.” 2 Na yango Elisha atunaki mwasi yango: “Olingi nasalela yo nini? Yebisá ngai, eloko nini ozali na yango na ndako?” Ayanolaki: “Ngai mosaleli na yo nazali na eloko te na ndako, kaka elokó moko* oyo ezali na mafuta.”+ 3 Na nsima Elisha alobaki: “Bimá libándá, kende epai ya bato nyonso oyo bafandi penepene na yo, mpe sɛngá bango bambɛki oyo ezali na eloko te na kati. Sɛngá yango ebele. 4 Na nsima, kɔtá na ndako, yo ná bana na yo mpe kangá porte. Tondisá mafuta na kati ya bambɛki yango nyonso, mpe oyo etondi, tyá yango pembeni.” 5 Bongo mwasi yango atikaki ye, akei.
Akɔtaki na ndako, ye ná bana na ye mpe akangaki porte. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambɛki, mpe ye azalaki kotondisa yango na mafuta.+ 6 Ntango bambɛki yango etondaki, ayebisaki mwana na ye moko ete: “Pesá ngai mbɛki mosusu.”+ Kasi mwana yango alobaki na ye: “Mbɛki mosusu ezali te.” Na ntango yango, mafuta etikaki kobima.+ 7 Bongo akendaki koyebisa moto ya Nzambe ya solo, mpe alobaki na mwasi yango: “Kende kotɛka mafuta yango mpo ofuta banyongo na yo. Mpe mbongo oyo ekotikala, ekoki kosalisa yo ná bana na yo.”
8 Mokolo moko Elisha akendaki na engumba Shuneme,+ esika mwasi moko ya lokumu azalaki. Mwasi yango atyaki ye mbamba mpo alya epai na ye.+ Mbala nyonso oyo Elisha azalaki kokende na Shuneme, azalaki koleka epai na ye mpo na kolya. 9 Bongo mwasi yango alobaki na mobali na ye: “Namoni ete moto oyo alekaka awa epai na biso mbala na mbala azali mosantu ya Nzambe. 10 Nabondeli yo, tiká tósalela ye mwa shambrɛ likoló, na nsamba,+ mpe tótyela ye mbeto, mesa, kiti ná etɛlɛmiselo ya mwinda. Boye, mbala nyonso oyo akoya epai na biso, akoki kofanda kuna.”+
11 Mokolo moko, Elisha ayaki na Shuneme, mpe amataki na shambrɛ yango ya likoló mpo na kolala. 12 Bongo alobaki na mosaleli na ye Gehazi:+ “Bengelá ngai mwasi Moshuneme+ wana.” Bongo Gehazi abengaki ye, mpe mwasi yango ayaki kotɛlɛma liboso ya Elisha. 13 Na nsima Elisha alobaki na Gehazi: “Nabondeli yo, yebisá ye boye: ‘Obomi mpenza nzoto mpo na biso.+ Tósala nini mpo na yo?+ Olingi nasolola na mokonzi+ to na komanda ya basoda mpo na yo?’” Kasi mwasi yango ayanolaki: “Te, ezali na ntina te. Nafandi na kimya ná bato ya mboka na ngai.” 14 Mpe Elisha atunaki mosaleli na ye: “Sikoyo tósala nini mpo na ye?” Gehazi ayanolaki: “Azali na mwana te,*+ mpe mobali na ye akómi mobange.” 15 Na mbala moko Elisha alobaki: “Bengá ye lisusu.” Bongo Gehazi abengaki ye, mpe mwasi yango ayaki mpe atɛlɛmaki na porte. 16 Na nsima Elisha alobaki na ye: “Na mbula ekoya, kaka na eleko oyo, okosimba mwana mobali.”+ Kasi ye alobaki: “Te, nkolo na ngai, ozali moto ya Nzambe ya solo! Kopesa ngai elaka ya lokuta te.”
17 Nzokande, mwasi yango azwaki zemi mpe na mbula oyo elandaki, kaka na eleko yango, mpe abotaki mwana mobali ndenge Elisha alobaki na ye. 18 Mwana yango akolaki, mpe mokolo moko akendaki epai ya tata na ye, oyo azalaki esika moko na babuki-mbuma. 19 Azalaki se koloba na tata na ye: “Motó mpasi, Aa motó mpasi!” Na nsima tata na ye alobaki na mosaleli na ye: “Memá ye epai ya mama na ye.” 20 Bongo mosaleli yango amemaki mwana epai ya mama na ye, mpe mama afandisaki ye na makolo* na ye tii na midi, na nsima mwana yango akufaki.+ 21 Mama na ye amataki mpe alalisaki ye na mbeto ya moto ya Nzambe ya solo,+ akangaki porte mpe abimaki. 22 Na nsima abengaki mobali na ye mpe alobaki: “Nabondeli yo, tindelá ngai mosaleli moko ná mpunda moko. Nalingi kokende nokinoki epai ya moto ya Nzambe ya solo mpe nakozonga.” 23 Kasi mobali na ye atunaki ye: “Mpo na nini olingi kokende kotala ye lelo? Ezali sanza ya sika te,+ sabata mpe te.” Ye ayanolaki: “Kobanga te, likambo ezali te.” 24 Na yango, akangisaki kiti ya mpunda mpe alobaki na mosaleli na ye: “Tambwisá mpunda mbangu mpenza. Okotambwisa malɛmbɛ kaka soki nayebisi yo.”
25 Bongo akendaki epai ya moto ya Nzambe ya solo na Ngomba Karamele. Ntango kaka moto ya Nzambe ya solo amonaki ye na mosika, alobaki na mosaleli na ye Gehazi: “Talá! Mwasi Moshuneme ye kuna azali koya. 26 Nabondeli yo, kende mbangu kokutana na ye mpe tuná ye: ‘Ozali malamu? Mobali na yo azali malamu? Bongo mwana?’” Mwasi yango ayanolaki: “Biso nyonso tozali malamu.” 27 Ntango mwasi yango akómaki epai ya moto ya Nzambe ya solo na ngomba, na mbala moko, akangaki ye na makolo.+ Bongo Gehazi ayaki mpo alongola ye, kasi moto ya Nzambe ya solo alobaki: “Tiká ye, mpo azali na mawa makasi.* Nayebi te soki ezali mpo na nini. Yehova ayebisi ngai yango te.” 28 Na nsima mwasi yango alobaki na Elisha: “Ngai nasɛngaki yo mwana? Nalobaki na yo te ete: ‘Kopesa ngai elaka ya lokuta te’?”+
29 Na mbala moko Elisha alobaki na Gehazi: “Kangá elamba na yo na loketo,+ zwá lingenda na ngai, mpe simbá nzela, kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kondima te. Kende mpe tyá lingenda na ngai na elongi ya mwana yango.” 30 Na yango mama ya mwana yango alobaki na Elisha: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola yo ozali na bomoi,* nakokende te soki yo okei te.”+ Bongo Elisha atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na ye. 31 Gehazi akendaki liboso na bango mpe ntango akómaki kuna, atyaki lingenda na elongi ya mwana yango, kasi ayokaki ata liloba te, ata elembo moko te+ oyo emonisi ete mwana yango azali na bomoi. Bongo azongaki kokutana na Elisha mpe alobaki na ye: “Mwana yango alamuki te.”
32 Ntango Elisha akómaki na ndako, akutaki balalisi mwana oyo akufi na mbeto na ye.+ 33 Elisha akɔtaki na shambrɛ mpe akangaki porte. Azalaki kaka ye ná mwana yango. Bongo abandaki kobondela Yehova.+ 34 Na nsima, amataki na mbeto mpe alalelaki mwana yango mpe atyaki monɔkɔ na ye na monɔkɔ ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mabɔkɔ na ye na mabɔkɔ ya mwana, mpe agunzamaki likoló na ye. Bongo nzoto ya mwana yango ebandaki kokóma mɔtɔ.+ 35 Elisha abandaki kotambolatambola na kati ya ndako, nsima na yango, amataki na mbeto mpe agunzamaki lisusu likoló ya mwana. Mpe mwana yango akɔsɔlaki* mbala nsambo, na nsima afungolaki miso.+ 36 Bongo Elisha abengaki Gehazi mpe alobaki na ye: “Bengelá ngai mama ya mwana oyo.” Bongo Gehazi abengaki ye mpe mwasi yango ayaki. Na nsima Elisha alobaki na ye: “Zwá mwana na yo.”+ 37 Mwasi yango akɔtaki mpe akweaki na makolo ya Elisha mpe agumbamelaki ye tii na nse. Na nsima azwaki mwana na ye mpe abimaki.
38 Ntango Elisha azongaki na Gilgale, nzala ezalaki na mokili yango.+ Lokola bana ya basakoli+ bafandaki liboso na ye, alobaki na mosaleli+ na ye: “Tyá nzungu ya monene na mɔtɔ mpe lambá supu mpo na bana ya basakoli.” 39 Bongo, moko ya bana ya basakoli akendaki na esobe mpo na kobuka ndunda. Kuna, akutaki nzete moko ya vinyo ya zamba, abukaki bambuma na yango, mpe atondisaki yango na elamba na ye. Na nsima azongaki mpe akatakataki yango na nzungu. Kasi ayebaki te soki ezalaki nini. 40 Bongo bapesaki yango bato mpo bálya. Kasi, ntango kaka bamekaki supu yango, bagangaki: “Ee moto ya Nzambe ya solo, liwa ezali na kati ya nzungu.” Mpe bakokaki kolya yango te. 41 Bongo Elisha alobaki: “Bóyela ngai mwa farini.” Azwaki farini yango mpe abwakaki yango na kati ya nzungu. Na nsima, alobaki: “Pesá bato bálya.” Mpe eloko ya mabe ezalaki lisusu te na kati ya nzungu+ yango.
42 Mobali moko autaki na Baala-shalisha+ mpe amemelaki moto ya Nzambe ya solo mampa ya ɔrje+ 20 oyo esalemi na mbuma ya liboso oyo eteli, ná saki moko ya mitó ya mbuma oyo bauti kobuka sika.+ Na nsima Elisha alobaki: “Pesá yango bato mpo bálya.” 43 Kasi mosaleli na ye atunaki ye: “Ndenge nini nakokabolela yango bato 100?”+ Elisha alobaki na ye lisusu: “Pesá yango bato bálya, mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Bakolya mpe biloko mosusu ekotikala.’”+ 44 Bongo mosaleli na ye akabolelaki bango bilei yango, balyaki mpe biloko mosusu etikalaki,+ kaka ndenge Yehova alobaki.