Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika Na kati ya 1 Bakonzi 1 BAKONZI MAKAMBO OYO EZALI NA KATI 1 Davidi ná Abishage (1-4) Adoniya aluki kozwa bokonzi (5-10) Natane ná Bate-sheba bakɔti likambo yango (11-27) Davidi apesi mitindo ete bátya Salomo mafuta (28-40) Adoniya akei komibomba na etumbelo (41-53) 2 Davidi apesi Salomo malako (1-9) Davidi akufi; Salomo afandi na kiti ya bokonzi (10-12) Makambo oyo Adoniya aluki ememi ye na liwa (13-25) Babengani Abiatare; babomi Yoabe (26-35) Babomi Shimei (36-46) 3 Salomo abali mwana ya Farao (1-3) Yehova abimeli Salomo na ndɔtɔ (4-15) Salomo asɛngi bwanya (7-9) Salomo akati likambo ya bamama mibale (16-28) 4 Bakonzi na boyangeli ya Salomo (1-19) Bomɛngo na boyangeli ya Salomo (20-28) Kimya na nse ya nzete ya vinyo mpe ya figi (25) Bwanya mpe masese ya Salomo (29-34) 5 Mokonzi Hirame atindi banzete mpo na mosala ya kotonga (1-12) Salomo azwi bato mpo na kosala misala ya makasi (13-18) 6 Salomo atongi tempelo (1-38) Esika Eleki Mosantu (19-22) Bakeruba (23-28) Mayemi, baporte, lopango ya kati (29-36) Tempelo esili nsima ya mbula soki nsambo (37, 38) 7 Ndako ya Salomo mpe biteni na yango (1-12) Hirame, moto oyo ayebi mosala, asalisi Salomo (13-47) Makonzí mibale ya kwivre (15-22) Ebombelo monene ya mai ya ebende oyo enyangwisami (23-26) Bashario zomi mpe basaani ya kwivre (27-39) Basilisi kosala bisaleli ya wolo (48-51) 8 Bamemi Sanduku na tempelo (1-13) Salomo alobi na bato (14-21) Salomo asali libondeli ya bofungoli tempelo (22-53) Salomo apamboli bato (54-61) Bambeka mpe fɛti ya bofungoli (62-66) 9 Yehova abimeli lisusu Salomo (1-9) Likabo oyo Salomo apesi Mokonzi Hirame (10-14) Biloko ndenge na ndenge oyo Salomo atongaki (15-28) 10 Mokonzi-mwasi ya Sheba ayei kotala Salomo (1-13) Ebele ya bomɛngo ya Salomo (14-29) 11 Basi ya Salomo bapɛngwisi motema na ye (1-13) Batɛmɛli ya Salomo (14-25) Balaki Yeroboame mabota zomi (26-40) Salomo akufi; Rehoboame akómi mokonzi (41-43) 12 Rehoboame apesi bato eyano ya mabe (1-15) Mabota zomi etomboki (16-19) Yeroboame akómi mokonzi ya Yisraele (20) Rehoboame asengeli kobundisa Yisraele te (21-24) Yeroboame abandisi losambo ya mwana-ngɔmbɛ (25-33) 13 Esakweli oyo etali etumbelo ya Betele (1-10) Etumbelo ebukani (5) Moto ya Nzambe azangi botosi (11-34) 14 Esakweli ya Ahiya mpo na Yeroboame (1-20) Boyangeli ya Rehoboame na Yuda (21-31) Etumba ya Shishake (25, 26) 15 Abiyame, mokonzi ya Yuda (1-8) Asa, mokonzi ya Yuda (9-24) Nadabe, mokonzi ya Yisraele (25-32) Baasha, mokonzi ya Yisraele (33, 34) 16 Yehova akateli Baasha etumbu (1-7) Ela, mokonzi ya Yisraele (8-14) Zimiri, mokonzi ya Yisraele (15-20) Omiri, mokonzi ya Yisraele (21-28) Ahaba, mokonzi ya Yisraele (29-33) Hiele atongi lisusu Yeriko (34) 17 Mosakoli Eliya asakoli eleko ya kokauka (1) Bayanganga ememeli Eliya bilei (2-7) Eliya akei epai ya mwasi moko ya Zarefate oyo mobali akufá (8-16) Mwana ya mwasi yango akufi mpe asekwi (17-24) 18 Eliya akutani na Obadia mpe Ahaba (1-18) Eliya ná basakoli ya Baala na Karamele (19-40) ‘Kokakatana’ (21) Eleko ya kokauka ya mbula misato ná ndambo esuki (41-46) 19 Eliya akimi nkanda ya Yezabele (1-8) Yehova abimeli Eliya na Horebe (9-14) Eliya asengeli kotya Hazaele, Yehu, mpe Elisha mafuta (15-18) Elisha akokóma mosakoli nsima ya Eliya (19-21) 20 Bato ya Siri babundisi Ahaba (1-12) Ahaba alongi bato ya Siri (13-34) Esakweli mpo na Ahaba (35-43) 21 Ahaba aluli elanga ya vinyo ya Nabote (1-4) Yezabele abomisi Nabote (5-16) Eliya ayebisi nsango ya etumbu mpo na Ahaba (17-26) Ahaba amikitisi (27-29) 22 Yehoshafate asali boyokani ná Ahaba (1-12) Mikaya asakoli ete bakolonga te (13-28) Anzelu moko abubi Ahaba (21, 22) Babomi Ahaba na Ramote-gileade (29-40) Boyangeli ya Yehoshafate na Yuda (41-50) Ahazia akómi mokonzi ya Yisraele (51-53)