Loyembo 185
Lisekwa—Likabo liuti na Nzambe ya bolingo
1. Tozwi elikya’a lisekwa,
Bolingo ya Nzambe.
Ndanga mpo na Klisto, mbeka,
Solo Mwana na ye.
Liboso, etongá moke
Bakosekwisama
Mpo na kozala bakonzi,
Bakoyangela nsé.
2. ‘Lipatá ya batatoli’
Mpe bakozwa bomo’,
Na lisekwa ya malamu,
Nzamb’alaki bango.
Batatoli’oyo bakufi
Na ntango ya nsuka,
Nokinoki, bakosekwa
Mpo bakumisa Yah.
3. Balali na nkunda, banso,
Bakosekwisama.
Na mbelá, Klisto’abeleli,
Esengo bakozwa!
Na nsuka ya Mbula Nkóto,
Komekam’ezali.
Nzamb’akopesa libonza
Epai na balóngi.
4. Bókende, “etongá moke”
Mp’ebele monene,”
Bóloba ete bakufi
Bakosekwani bɛɛ.
Bósala misala nyonso
Kati na bomoko.
Liwa likopekisa te
Ete bozwa mbano.