Maloba na nsuka ya lisolo
1 MITINDA
Nzambe atyaka mibeko na kolanda mitinda na ye. Mitinda yango ezali maloba ya moboko oyo esilaka ngala te, oyo ezali na Biblia. Esalisaka biso tóyeba ndenge oyo Nzambe akanisaka mpe ndenge amiyokaka mpo na likambo boye to boye. Mitinda esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu mpe tósalaka oyo ezali sembo. Esalisaka biso, mingimingi ntango mibeko ya Nzambe ezali polele te mpo na likambo moko boye.
2 KOTOSA NZAMBE
Kotosa Yehova elimboli kosepela kosala makambo oyo asɛngi biso. Yehova alingi tótosaka ye mpo tolingaka ye. (1 Yoane 5:3) Soki tolingaka mpe totyelaka Nzambe motema, tokolanda toli na ye na makambo nyonso. Tokotosa ye ata ntango ezali mpasi kosala yango. Kotosa Yehova ezali mpo na bolamu na biso, mpamba te ateyaka biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu lelo oyo mpe alaki biso ete tokozwa mapamboli ebele na mikolo ezali koya.—Yisaya 48:17.
3 BONSOMI YA KOPONA
Yehova apesá mokomoko na biso bonsomi ya kopona, to likoki ya kozwa bikateli. Akelá biso lokola barobo te. (Kolimbola Mibeko 30:19; Yosua 24:15) Tokoki kosalela bonsomi na biso mpo na kozwa bikateli ya malamu. Kasi soki tokebi te, tokoki mpe kozwa bikateli ya mabe. Lokola tozali na bonsomi ya kopona elimboli ete biso moko tosengeli kozwa ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe komonisa ete tolingaka ye mpenza.
4 MIBEKO OYO ETALI BIZALELI
Yehova atyá mibeko to malako oyo etali etamboli mpe misala na biso. Na Biblia, tokoki koyekola mibeko yango mpe ndenge oyo ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu. (Masese 6:16-19; 1 Bakorinti 6:9-11) Malako yango esalisaka biso tóyeba makambo oyo Nzambe amonaka ete ezali malamu, mpe oyo amonaka ete ezali mabe. Esalisaka biso mpe tóyeba ndenge ya komonisa bolingo, kozwa bikateli ya malamu, mpe ndenge ya komonisela basusu boboto. Atako bizaleli ya bato ya mokili ezali se kobeba lelo oyo, mibeko ya Yehova ebongwani te. (Kolimbola Mibeko 32:4-6; Malaki 3:6) Kotosa yango ebatelaka biso na makambo oyo ekoki konyokola nzoto mpe makanisi na biso.
5 LISOSOLI
Lisosoli ezali lokola mongongo ya kati oyo eyebisaka biso soki likambo moko ezali malamu to mabe. Yehova apesá mokomoko na biso lisosoli. (Baroma 2:14, 15) Mpo lisosoli na biso esala malamu, tosengeli koteya yango mibeko ya Yehova oyo etali bizaleli. Soki toteyi lisosoli na biso ndenge wana, ekoki kosalisa biso tózwa bikateli oyo esepelisaka Nzambe. (1 Petro 3:16) Lisosoli ekoki kokebisa biso soki tolingi kolanda nzela ya mabe, to ekoki kotungisa biso makasi soki tosalaki likambo moko ya mabe. Lisosoli na biso ekoki mpe kobeba, kasi Yehova akoki kosalisa biso mpo ekóma lisusu malamu. Lisosoli ya malamu epesaka kimya ya motema mpe nzoto kilo.
6 KOBANGA NZAMBE
Kobanga Nzambe elimboli kolinga ye mpe kopesa ye limemya mingi; na yango tokolinga ata moke te kosala likambo oyo ekopesa ye mawa. Kobanga Nzambe esalisaka biso tósala makambo ya malamu mpe tókima oyo ezali mabe. (Nzembo 111:10) Etindaka biso tóyoka na likebi makambo nyonso oyo Yehova alobi. Esalisaka mpe biso tókokisa bilaka oyo topesaki ye mpo tozali na limemya makasi epai na ye. Kobanga Nzambe ekobongola makanisi na biso, ndenge oyo tosalelaka basusu makambo mpe bikateli na biso ya mokolo na mokolo.
7 KOBONGOLA MOTEMA
Kobongola motema elimboli koyoka mawa makasi mpo na likambo ya mabe oyo osalaki. Baoyo balingaka Nzambe bayokaka mawa mingi ntango bayebi ete basalaki likambo oyo eyokani te na mibeko na ye. Soki tosali likambo ya mabe, tosengeli kosɛnga Yehova alimbisa biso na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. (Matai 26:28; 1 Yoane 2:1, 2) Soki tobongoli mpenza motema mpe totiki kosala oyo ezali mabe, tokoki kotya motema ete Yehova akolimbisa biso. Ekozala lisusu na ntina te tómiyoka ete tomemi ngambo mpo na makambo oyo tosalaki kala. (Nzembo 103:10-14; 1 Yoane 1:9; 3:19-22) Tosengeli kosala makasi tózwela mabunga na biso liteya, tólongola makanisi nyonso ya mabe, mpe tózala na bomoi oyo eyokani na mibeko ya Yehova.
8 KOLONGOLAMA NA LISANGÁ
Ntango moto oyo asali lisumu ya monene abongoli motema te mpe aboyi kolanda mibeko ya Yehova, akoki kozala lisusu na kati ya lisangá te. Asengeli kolongolama na lisangá. Soki moto alongolami na lisangá, tokozala lisusu na boyokani na ye te mpe tokotika kosolola na moto yango. (1 Bakorinti 5:11; 2 Yoane 9-11) Ebongiseli ya kolongola moto na lisangá esalaka ete nkombo ya Yehova mpe lisangá efingama te. (1 Bakorinti 5:6) Kolongola moto na lisangá ezali mpe disiplini oyo ekoki kosalisa moto abongola motema mpo akoka kozongela Yehova.—Luka 15:17.
9 LITAMBWISI, MALAKO, MPE TOLI
Yehova alingaka biso mpe azalaka na mposa ya kosalisa biso. Yango wana apesaka biso litambwisi, malako, mpe toli na nzela ya Biblia mpe na nzela ya bato oyo balingaka ye. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozalaka mpenza na mposa ya lisalisi yango. (Yirimia 17:9) Soki tozali koyoka mpe komemya bato oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa biso, tokomonisa ete tomemyaka ye mpe tolingi kotosa ye.—Baebre 13:7.
10 LOLENDO MPE KOMIKITISA
Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mbala mingi tolukaka kaka matomba na biso mpe tozalaka na lolendo. Kasi, Yehova alingi tózala na komikitisa. Soki tokanisi bonene ya Yehova mpe tomoni ndenge tozali moke liboso na ye, tokoyekola kozala na komikitisa. (Yobo 38:1-4) Tokozala mpe na komikitisa soki toyekoli mpenza kokanisa basusu mpe bolamu na bango na esika ya kokanisa kaka makambo na biso. Mbala mingi, lolendo etindaka moto akanisa ete azali malamu koleka basusu. Moto ya komikitisa amitalelaka na bosembo mpe amonaka makambo oyo asalaka malamu, kasi andimaka mpe ete azali na bolɛmbu. Aboyaka te kondima mabunga na ye, kosɛnga bolimbisi, mpe kondima toli mpe makanisi ya bato mosusu. Moto ya komikitisa atyelaka Yehova motema mpe alandaka litambwisi na ye.—1 Petro 5:5.
11 BOKONZI
Bato oyo bazali na bokonzi bazalaka na lotomo ya kopesa malako mpe ya kozwa bikateli. Yehova nde Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na likoló mpe na mabele. Lokola akelá biloko nyonso, ye nde Moto oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba. Asalelaka ntango nyonso bokonzi na ye mpo na bolamu ya basusu. Yehova apesá bato mosusu mokumba ya kobatela biso. Na ndakisa, baboti, bankulutu ya lisangá, mpe bato ya guvɛrnema bazali na mwa bokonzi, mpe Yehova alingi ete tósala na bango na bomoko. (Baroma 13:1-5; 1 Timote 5:17) Kasi, soki mibeko ya bato eyokani te na mibeko ya Nzambe, tokotosa Nzambe na esika ya kotosa bato. (Misala 5:29) Ntango tozali kondima bokonzi ya bato oyo Yehova azali kosalela, tokomonisa Yehova ete tozali na limemya mpo na bikateli na ye.
12 BANKULUTU
Yehova asalelaka bankulutu, bandeko mibali oyo bakɔmɛli na elimo, mpo na kobatela lisangá. (Kolimbola Mibeko 1:13; Misala 20:28) Bandeko mibali yango basalisaka biso tóbatela boyokani malamu na Yehova mpe tósambela ye na kimya mpe na mobulu te. (1 Bakorinti 14:33, 40) Mpo moto aponama nkulutu na nzela ya elimo santu, asengeli kokokisa masɛngami ya polele oyo ezali na Biblia. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9; 1 Petro 5:2, 3) Totyelaka ebongiseli ya Nzambe motema mpe topesaka yango mabɔkɔ, yango wana tosalaka na esengo mpe na bomoko elongo na bankulutu.—Nzembo 138:6; Baebre 13:17.
13 MOKONZI YA LIBOTA
Yehova apesi baboti mokumba ya kobatela bana na bango mpe libota na bango. Kasi, Biblia elobi ete mobali nde azali mokonzi ya libota. Kasi, soki mama azali kobɔkɔla bana ye moko, ye nde akómi mokonzi ya libota. Mokonzi ya libota azali na mokumba ya koleisa bato ya libota, kolatisa bango, mpe kolukela bango esika ya kofanda. Ezali na ntina mingi mokonzi ya libota asalisa bato ya libota na ye básambela Yehova. Na ndakisa, akosala ete bato ya libota bázangisaka te makita pɔsɔ na pɔsɔ, bábimaka mosala ya kosakola, mpe báyekolaka Biblia elongo. Mokonzi ya libota azali mpe na mokumba ya kozwa bikateli. Akosala ntango nyonso makasi alanda ndakisa ya Yesu na oyo etali komonisa boboto mpe kozala na makambo makasimakasi te; akozala na nko te mpe akonyokola bato ya libota na ye te. Yango ekosala ete ndako ezala esika oyo bolingo ezali mpo moto nyonso azala na kimya mpe akolisa boyokani na ye na Yehova.
14 LISANGANI YA MIKÓLÓ-BAKAMBI
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali mwa etuluku ya mibali oyo bazali na elikya ya kokende likoló, oyo Nzambe azali kosalela mpo na kotambwisa mosala ya basaleli na ye. Na siɛklɛ ya liboso, Yehova asalelaki lisangani ya mikóló-bakambi mpo na kotambwisa makambo ya losambo mpe mosala ya kosakola na lisangá ya bokristo ya liboso. (Misala 15:2) Lelo oyo, mwa etuluku ya bandeko mibali oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi batambwisaka, bakambaka, mpe babatelaka basaleli ya Nzambe. Mpo na kozwa bikateli, bandeko yango batikaka Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye etambwisa bango. Yesu alobaki ete etuluku ya mibali yango oyo batyami mafuta na elimo ezali “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Matai 24:45-47.
15 KOZIPA MOTÓ
Na bantango mosusu, bakoki kosɛnga ndeko mwasi asala likambo moko na lisangá, oyo esɛngaka ete ndeko mobali nde asala yango. Ntango ndeko mwasi nde azali kosala mosala yango, asengeli kozipa motó mpo na komonisa limemya na ebongiseli ya Yehova. Kasi, esengeli kozipa motó kaka na makambo ya polele. Na ndakisa, ndeko mwasi akozipa motó soki azali koyekola Biblia na moto na miso ya mobali na ye to ya ndeko mobali mosusu oyo azwá batisimo.—1 Bakorinti 11:11-15.
16 KOBOYA KOKƆTA NA MAKAMBO YA MOKILI
Lokola tokɔtaka na makambo ya mokili te, toboyaka komikɔtisa na makambo ya politiki. (Yoane 17:16) Basaleli ya Yehova bapesaka mabɔkɔ na Bokonzi na ye. Tokɔtaka na makambo ya mokili te lokola Yesu.
Yehova asɛngi biso ‘tótosa baguvɛrnema mpe bakonzi.’ (Tito 3:1, 2; Baroma 13:1-7) Kasi, mibeko ya Nzambe epekisi mpe koboma moto. Na yango, lisosoli ya mokristo ekopesa ye nzela te ete akende etumba. Soki Leta apesi mokristo nzela ya kopona mosala mosusu na esika ya mosala ya soda, mokristo yango asengeli kokanisa soki lisosoli na ye ekotungisama te ntango akosala mosala yango.
Tosambelaka kaka Yehova, mpo azali Mozalisi na biso. Atako tozalaka na limemya mpo na bilembo ya ekólo, tokondima te kopesa bendele losako to koyemba loyembo ya ekólo. (Yisaya 43:11; Danyele 3:1-30; 1 Bakorinti 10:14) Lisusu, mosaleli ya Yehova mokomoko azwaka ekateli ya koboya kopona lisangá moko ya politiki to moto na nzela ya voti. Ezali bongo mpo tosilá kopona guvɛrnema ya Nzambe.—Matai 22:21; Yoane 15:19; 18:36.
17 ELIMO YA MOKILI
Mokili elendisaka makanisi ya Satana. Makanisi yango ezali komonana mingi epai ya bato oyo balingaka Yehova te, oyo baboyaka kolanda ndakisa na ye mpe kotosa mibeko na ye. (1 Yoane 5:19) Makanisi yango mpe makambo oyo etindaka bato básala bongo ebengami elimo ya mokili. (Baefese 2:2) Basaleli ya Yehova balingaka te elimo yango ekɔtela bango. (Baefese 6:10-18) Biso tolingaka mibeko ya Yehova mpe tosalaka makasi tózala na makanisi lokola oyo ya ye.
18 LIPƐNGWI
Kopɛngwa elimboli kotika solo oyo ezali na Biblia. Bapɛngwi batombokelaka Yehova mpe Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe oyo Yehova atye, mpe balukaka kobenda basusu na ngámbo na bango. (Baroma 1:25) Balukaka kokɔtisa bantembe na mitó ya bato oyo basambelaka Yehova. Bato mosusu na lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso bakómaki bapɛngwi; ezali mpe bongo na mikolo na biso. (2 Batesaloniki 2:3) Baoyo bazali sembo epai ya Yehova bazalaka ata na boyokani moko te na bapɛngwi. Tosengeli te kotika ete mposa ya koyeba makambo to mbamba ya basusu etinda biso tótánga to tóyoka makambo ya bapɛngwi. Tokotikala sembo epai ya Yehova mpe tokosambela kaka ye.
19 KOZIPA MASUMU
Na ntango ya Mibeko ya Moize, Bayisraele bazalaki kosɛnga Yehova alimbisa masumu na bango. Bazalaki komema mbeka ya mbuma, mafuta, mpe banyama na tempelo. Yango ezalaki kokundwela Bayisraele ete Yehova azalaki pene ya kolimbisa masumu na bango, ezala masumu ya ekólo mobimba to ya moto na moto. Na nsima, ntango Yesu apesaki bomoi na ye mpo na bolimbisi ya masumu na biso, bambeka ya banyama mpo na kozipa masumu ezalaki lisusu na ntina te. Yesu apesaki mbeka ya kokoka “mbala moko mpo na libela.”—Baebre 10:1, 4, 10.
20 KOBATELA BANYAMA
Mibeko ya Moize epesaki bato nzela ya kolya banyama. Bazwaki mpe etinda ya kopesa mbeka ya banyama. (Balevi 1:5, 6) Atako bongo, Yehova apesá nzela te ete bato bányokola banyama. (Masese 12:10) Kutu, Mibeko ezalaki na malako mosusu oyo ezalaki kobatela banyama. Bayisraele bazwaki mitindo ya kobatela banyama na bango ndenge esengeli.—Kolimbola Mibeko 22:6, 7.
21 BILOKO YA MIKEMIKE OYO EUTAKA NA KATI YA MAKILA MPE MAYELE YA MONGANGA
Biloko ya mikemike oyo eutaka na kati ya makila. Makila esalemi na biloko minei, elingi koloba—globules rouges, globules blancs, plaquettes, mpe plasma. Na kati ya biloko wana minei, babendaka mpe biloko mosusu ya mikemike oyo ebengami fractions sanguines.a
Bakristo bandimaka te bátya bango makila to moko ya biloko minei oyo esali makila. Kasi, basengeli nde kondima biloko mosusu mikemike oyo ezalaka na makila? Biblia elobeli te makambo nyonso ya mikemike. Na yango, mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli na kolanda lisosoli na ye moko oyo eteyami na Biblia.
Bakristo mosusu baboyaka biloko yango nyonso ya mikemike. Mbala mosusu, baboyaka mpo bamonaka ete Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisraele esɛngaki ete makila nyonso oyo nyama ebimisi basengelaki ‘kosopa yango na mabele.’—Kolimbola Mibeko 12:22-24.
Bakristo mosusu bazwaka ekateli mosusu. Lisosoli na bango epesaka bango nzela ya kondima biloko yango ya mikemike. Mbala mosusu bamonaka ete biloko yango ya mikemike oyo euti na biloko minei ya minene emonisaka lisusu te bomoi ya ekelamu oyo yango ezwamaki.
Ntango olingi kozwa ekateli mpo na biloko mikemike oyo ezalaka na makila, talelá mituna oyo elandi:
Nayebi ete koboya biloko nyonso ya mikemike oyo ezalaka na makila elimboli ete nakondima te lisalisi mosusu ya monganga oyo ebundisaka maladi to ekoki kosalisa mpo makila etika kobima mingi?
Ndenge nini nakoki kolimbolela monganga ntina oyo naboyi to nandimi bátya ngai eloko moko to biloko mingi ya mikemike oyo ezalaka na makila?
Mayele ya minganga. Biso bakristo topesaka te makila na biso mpo bátya moto mosusu, mpe tondimaka te bábomba makila na biso bapɔsɔ mingi liboso ya kosala biso lipaso. Kasi, ezali na mayele mosusu ya minganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko. Mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli mpo na ndenge bakosalela makila na ye moko na ntango ya lipaso, ekizamɛ, to mpo na kosalisa ye na nkisi mosusu. Mayele mosusu ya ndenge wana esɛngaka mpenza kobimisa makila ya moto libándá ya nzoto, mpo na mwa ntango.—Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2000, nkasa 30-31.
Na ndakisa, ezali na mayele ya minganga oyo ebengami hémodilution, oyo esɛngaka kolongola makila ya moto mwa moke liboso ya kosala ye lipaso, kotya yango na aparɛyi moko mpe kozongisa ye mai moko boye na esika ya makila oyo balongolaki. Na nsima, ntango bazali kosala lipaso to mwa moke nsima ya lipaso, bakozongisa ye makila yango.
Mayele mosusu ebengami la récupération du sang épanché. Na mayele yango, masini ezwaka makila ya moto oyo ezali kobima ntango bazali kosala ye lipaso, epɛtoli yango, mpe na nsima ezongisi yango kaka ntango bazali kosala ye lipaso, to mwa moke na nsima, kozanga kobomba yango.
Minganga nyonso basalelaka mayele yango ndenge moko te. Na yango, liboso mokristo andima ete básala ye lipaso, ekzamɛ moko oyo bakosala ye, to lisalisi moko ya monganga, asengeli koluka koyeba ndenge oyo bakosalela makila na ye.
Ntango olingi kozwa ekateli mpo na mayele ya minganga oyo esɛngi kosalela makila na yo moko, talelá mituna oyo elandi:
Soki makila na ngai ekobimisama na nzoto mpe mbala mosusu etiki kotambola mpo na mwa ntango, lisosoli na ngai ekotalela yango kaka lokola makila ya nzoto na ngai, oyo esɛngi te ‘kosopa yango na mabele’?—Kolimbola Mibeko 12:23, 24.
Lisosoli na ngai oyo eteyami na Biblia ekotungisama te soki ntango minganga bazali kosalisa ngai, babendi ngai makila, batye yango bankisi, mpe bazongisi yango mbala moko na nzoto na ngai?
Nayebi malamu ete koboya mayele nyonso oyo esɛngi kosalela makila na ngai elimboli ete nakondima te básala ekzamɛ ya makila, básala hémodialyse, to bálekisa makila na ngai na masini oyo ekosala mosala oyo motema mpe mimpululu esalaka?
Liboso ya kozwa ekateli mpo na biloko ya mikemike oyo ezalaka na makila mpe lisalisi ya monganga oyo esɛngi kosalela makila na biso moko, tosengeli kobondela Yehova atambwisa biso mpe kosala bolukiluki na mikanda na biso. (Yakobo 1:5, 6) Nsima na yango, tosengeli koyokela lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia mpo na kozwa ekateli biso moko. Tosengeli te kotuna basusu báyebisa biso nini balingaki kosala soki bazalaki na esika na biso; basusu mpe basengeli te kotinda biso na makasi tólanda makanisi na bango mpo na kozwa ekateli.—Baroma 14:12; Bagalatia 6:5.
22 KOZALA PƐTO NA BIZALELI
Kozala pɛto na bizaleli elimboli kozala na etamboli mpe kosala makambo oyo ezali pɛto na miso ya Nzambe. Kozala pɛto na bizaleli etali makanisi, maloba mpe misala na biso. Yehova apesi biso mitindo ete tóboya mbindo nyonso oyo etali makambo ya kosangisa nzoto mpe pite. (Masese 1:10; 3:1) Tosengeli kozwa ekateli ya kotosa mibeko ya Yehova liboso kutu tókutana na komekama ya kosala oyo ezali mabe. Tosengeli kobondela Nzambe ntango nyonso asalisa biso tóbatela makanisi na biso pɛto mpe tosengeli kozala na ekateli ya koboya makambo ya mbindo.—1 Bakorinti 6:9, 10, 18; Baefese 5:5.
23 ETAMBOLI YA NSƆNI MPE YA MBINDO
Moto oyo azali na etamboli ya nsɔni alobaka to asalaka makambo oyo ezali komonisa ete atyoli mpenza mitinda ya Nzambe mpe ete asilá nsɔni. Moto yango azalaka na limemya te mpo na mibeko ya Nzambe. Soki moto azali na etamboli ya nsɔni, esengeli kosala komite ya kosambisa mpo na kotalela likambo na ye. Mbindo ezali makambo ndenge na ndenge ya mabe. Na kolanda bonene ya likambo yango, etamboli ya mbindo ekoki kosɛnga kosala komite mpo na kosambisa moto na lisangá.—Bagalatia 5:19-21; Baefese 4:19; mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2006.
24 KOSIMBASIMBA ENAMA YA KOBOTELA MPO NA KOYOKA ELƐNGI
Yehova abongisá ete kaka mwasi ná mobali oyo babalani nde básangisa nzoto mpo na komoniselana bolingo mpe yango ezali pɛto. Kasi, soki moto azali kosimbasimba binama na ye ya kobotela mpo na koyoka elɛngi, yango ezali pɛto te. Momeseno yango ekoki kobebisa boyokani ya moto na Yehova. Ekoki kosala ete moto akóma na bamposa ya mbindo mpe atalela kosangisa nzoto na ndenge oyo ebongi te. (Bakolose 3:5) Moto oyo azali na momeseno yango ya mabe mpe azali kokoka kotika te, asengeli kolɛmba nzoto te. (Nzembo 86:5; 1 Yoane 3:20) Soki yo mpe ozali na momeseno yango, bondelá Yehova na motema moko, mpe sɛngá ye asalisa yo. Boyá makambo lokola pornografi, oyo ekotinda yo okóma na makanisi ya mbindo. Sololá na tata to na mama na yo soki bazali bakristo to moninga moko oyo akɔmɛli na elimo, oyo atosaka mibeko ya Yehova. (Masese 1:8, 9; 1 Batesaloniki 5:14; Tito 2:3-5) Okoki kotya motema ete Yehova amonaka mpe asepelaka na milende oyo ozali kosala mpo ozala pɛto na bizaleli.—Nzembo 51:17; Yisaya 1:18.
25 KOBALA BASI EBELE
Yehova abongisaki ete libala ezali boyokani kati na mobali moko ná mwasi moko. Na Yisraele ya kala, Nzambe atikaki mibali bábala basi ebele, kasi na ebandeli mokano na ye ezalaki bongo te. Lelo oyo, basaleli ya Yehova bapesami nzela te ya kozala na basi ebele. Mobali asengeli kozala kaka na mwasi moko, mpe mwasi mobali kaka moko.—Matai 19:9; 1 Timote 3:2.
26 KOBOMA LIBALA MPE KOKABWANA
Yehova akanaki ete mwasi ná mobali oyo babalani báfanda elongo tii liwa. (Ebandeli 2:24; Malaki 2:15, 16; Matai 19:3-6; 1 Bakorinti 7:39) Apesi nzela ya koboma libala kaka soki molongani moko asali ekobo. Na ntango yango, Yehova apesi molongani oyo asali eloko te lotomo ya kotala soki akoboma libala to te.—Matai 19:9.
Na bantango mosusu, mokristo mosusu akoki komona malamu akabwana na molongani na ye ata soki asali ekobo te. (1 Bakorinti 7:11) Makambo oyo elandi ekoki kotinda mokristo akabwana na molongani na ye.
Koboya na nko kokokisa bamposa ya libota: Mobali alingi kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye te, mpe libota ekómi kokelela to kozanga eloko ya kolya.—1 Timote 5:8.
Konyokola to kobɛta: Kobɛta molongani tii amona ete bomoi to kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye ezali na likama.—Bagalatia 5:19-21.
Kosala nyonso mpo na kobebisa boyokani ya molongani na ye na Yehova: Moto alingi ata moke te molongani na ye asalela Yehova.—Misala 5:29.
27 KOPESA LONGONYA MPE KOLENDISA
Biso nyonso tozalaka na mposa bápesa biso longonya mpe bálendisa biso. (Masese 12:25; 16:24) Tokoki kopesa basusu makasi mpe kobɔndisa bango na maloba ya malamu mpe ya boboto. Maloba ya ndenge wana ekoki kosalisa bandeko báyika mpiko mpe bákoba kosalela Yehova atako bazali na mikakatano minene. (Masese 12:18; Bafilipi 2:1-4) Soki moto moko alɛmbi nzoto makasi, tosengeli koyoka ye na likebi mpe komeka komitya na esika na ye. Yango ekoki kosalisa biso tóyeba oyo tokoloba to kosala mpo na kosalisa ye. (Yakobo 1:19) Omityela mokano ya koyeba bandeko na yo malamu mpo oyeba mpenza bamposa na bango. Na nsima, okoki kosalisa bango bábelela Yehova, Nzambe oyo abɔndisaka mpe alendisaka biso nyonso, mpo apesa bango makasi.—2 Bakorinti 1:3, 4; 1 Batesaloniki 5:11.
28 BAFƐTI YA LIBALA
Biblia etye mibeko ya sikisiki te mpo na bafɛti ya libala. Mimeseno mpe mibeko ya mboka ezali ndenge moko te na bisika nyonso. (Ebandeli 24:67; Matai 1:24; 25:10; Luka 14:8) Likambo oyo eleki ntina mokolo ya libala ezali ndai oyo mwasi ná mobali balapaka na miso ya Yehova. Mbala mingi, babalani balingaka ete bato ya mabota na bango ná baninga na bango bázala ntango bazali kolapa ndai yango mpe balingaka ete nkulutu moko asalela bango diskur. Soki bato oyo babalani bamoni ete bakosala fɛti ya libala, bango moko bakoloba soki balingi fɛti yango ezala ndenge nini. (Luka 14:28; Yoane 2:1-11) Ntango bazali kobongisa makambo ya fɛti ya libala na bango, basengeli kokanisa soki ekopesa Yehova nkembo. (Ebandeli 2:18-24; Matai 19:5, 6) Mitinda ya Biblia ekoki kosalisa bango bázwa bikateli ya malamu. (1 Yoane 2:16, 17) Soki basepeli kopesa bato masanga na fɛti oyo basali, basengeli kotya moto mpo makambo nyonso etambola malamu. (Masese 20:1; Baefese 5:18) Soki basepeli kotya miziki to kosala masano, basengeli kokanisa soki ekopesa Yehova lokumu. Bato oyo babalani basengeli kokanisa libosoliboso boyokani na bango na Nzambe mpe mokomoko asengeli kokanisa boyokani na ye na molongani na ye na esika ya kokanisa kaka mokolo ya fɛti ya libala.—Masese 18:22; mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15/10/2006, nkasa 18-31.
29 KOZWA BIKATELI NA BWANYA
Tolingaka kozwa bikateli ya malamu oyo euti na mitinda ya Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, moto oyo azali Motatoli ya Yehova te akoki kosɛnga molongani oyo azali Motatoli bákende kolya epai ya bandeko ya libota mokolo ya fɛti moko ya mokili. Soki molongani na yo asɛngi yo likambo ya ndenge wana, okosala nini? Soki lisosoli na yo epesi yo nzela okende, okoki koyebisa molongani na yo ete soki bakosala molulu ya bapakano kuna, yo okosangana na molulu yango te. Osengeli mpe komituna soki okobɛtisa bandeko mosusu libaku te soki okei kolya kuna.—1 Bakorinti 8:9; 10:23, 24.
To patrɔ akoki kopesa yo matabisi na mosala na ntango ya bafɛti. Osengeli koboya yango? Mpenza te. Mpo ozwa ekateli, okoki kotalela soki patrɔ azali komona yango ndenge nini. Azali komona ete soki ozwi matabisi yango ekomonisa ete osangani na fɛti? To ezali kaka mpo amonisa ete asepelaka na mosala na yo? Kokanisa makambo wana mpe makambo mosusu ekosalisa yo oyeba soki okondima matabisi yango to te.
Longola yango, moto mosusu akoki kopesa yo likabo na eleko ya fɛti mpe koloba: “Nayebi ete osalaka fɛti yango te, kasi nalingi kopesa yo eloko oyo.” Mbala mosusu moto yango alingi kaka komonisa boboto. Kasi, okoki mpe kotalela soki alingi komeka kondima na yo to alingi akɔtisa yo na fɛti yango. Nsima ya kotalela likambo yango, yo moko okoyeba soki okondima likabo yango to te. Na bikateli na biso nyonso, tolingaka kozala na lisosoli ya malamu mpe kozala sembo epai ya Yehova.—Misala 23:1.
30 MAKAMBO YA MOMBONGO MPE MIBEKO
Mbala mingi, ntango tosilisi matata nokinoki mpe na kimya, ntina ya kokómisa yango makambo minene ezalaka te. (Matai 5:23-26) Mokristo nyonso asengeli koluka libosoliboso kopesa Yehova nkembo mpe kobatela bomoko ya lisangá.—Yoane 13:34, 35; 1 Bakorinti 13:4, 5.
Soki bakristo bazwani matata mpo na makambo ya mombongo, basengeli kosilisa yango kozanga ete báfundana na tribinale. Mokapo ya 1 Bakorinti 6:1-8 emonisi toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo na likambo ya kofundana na tribinale. Kokende kofunda ndeko na tribinale ekoki kofingisa nkombo ya Yehova mpe lisangá. Matai 18:15-17 etángi makambo misato oyo bakristo basengeli kosala ntango bakoseli bango makambo to babubi bango: (1) Basengeli liboso koluka kosilisa likambo yango bango mibale. (2) Soki balongi kosala yango te, bakoki kosɛnga ndeko moko to bandeko mibale oyo bakɔmɛli na elimo mpo básalisa bango. (3) Na nsima, soki esengeli, bakoki koyebisa lisangani ya bankulutu likambo yango mpo bátalela yango. Soki likambo yango ekómi ndenge wana, bankulutu bakosalela mitinda ya Biblia mpo na kosalisa bandeko oyo babimisi likambo yango báyokana na kimya. Soki bato mosusu oyo bazali na kati ya likambo yango baboyi kolanda mitinda ya Biblia, ekoki kosɛnga bankulutu básala komite mpo na kosambisa.
Ezali na makambo oyo ekoki kosɛnga kokende na tribinale, na ndakisa mpo na koboma libala, mpo na kozwa lotomo ya kotikala na bana, kozwa mbongo ya koleisa bana, kozwa mbongo ya asiranse, mpo nkombo na yo ezala na liste ya bato oyo basengeli kofutama mbongo ntango kompanyi ekwei, to mpo na kozwa bozwi to libula oyo mowei atikeli yo. Soki mokristo oyo azali kolandela makambo wana na tribinale asali yango na ndenge ya kimya mpenza, atyoli toli ya ntoma Paulo te.
Soki mokristo asali mokristo mosusu likambo ya mabe mpenza, na ndakisa asangisi na ye nzoto na makasi, abebisi mwana, abimeli ye to ayeli ye mpo na kosala ye mabe, ayibi eloko ya motuya mingi, to abomi, mokristo oyo akei kofunda likambo ya ndenge wana na Leta atyoli toli ya ntoma Paulo te.
31 MAYELE MABE YA SATANA
Banda na elanga ya Edene, Satana alukaka kokosa bato. (Ebandeli 3:1-6; Emoniseli 12:9) Ayebi ete soki abebisi makanisi na biso, akotinda biso tósala makambo ya mabe. (2 Bakorinti 4:4; Yakobo 1:14, 15) Asalelaka politiki, mangomba, mombongo, kominanola, kelasi, mpe makambo mosusu ebele mpo na komonisa makanisi na ye mpe kotinda bato bándima yango.—Yoane 14:30; 1 Yoane 5:19.
Satana ayebi ete atikali kaka na ntango moke mpo na kokosa bato. Azali kosala nyonso mpo na kokosa bato ebele mpenza. Alukaka mingimingi kokosa baoyo basalelaka Yehova. (Emoniseli 12:12) Soki tokebi te, Zabolo akoki kobebisa makanisi na biso mokemoke. (1 Bakorinti 10:12) Na ndakisa, Yehova alingi libala eumela libela. (Matai 19:5, 6, 9) Kasi, bato mingi lelo oyo bamonaka ete libala ezali kaka boyokani moko ya bongobongo oyo bakoki kokata kaka boye. Bafilme mpe baemisyo mingi ya TV elendisaka likanisi yango. Tosengeli kotika te ete makanisi ya mokili mpo na libala ekɔtela biso.
Mpo na kokosa biso, Satana alendisaka mpe elimo ya lipanda. (2 Timote 3:4) Soki tokebi te, tokoki kotika kopesa limemya na bato oyo Yehova apesi bokonzi. Na ndakisa, ndeko mobali mosusu akoki koluka kotɛmɛla litambwisi ya bankulutu ya lisangá. (Baebre 12:5) To ndeko mwasi moko akoki kobanda koboya ebongiseli ya Yehova ete mobali azali mokonzi ya libota.—1 Bakorinti 11:3.
Tosengeli kotika ata moke te Zabolo atambwisa makanisi na biso. Kasi, tómekola nde makanisi ya Yehova mpe tótya ‘makanisi na biso na makambo ya likoló.’—Bakolose 3:2; 2 Bakorinti 2:11.
32 LISALISI YA MONGANGA
Biso nyonso tolingaka kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe kozwa lisalisi ya malamu mpenza soki tobɛli. (Yisaya 38:21; Marko 5:25, 26; Luka 10:34) Lelo oyo, minganga mpe bato mosusu bakómi kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kosalisa bato oyo babɛli. Ntango tozali kopona lisalisi ya monganga oyo tokondima, ezali na ntina tólanda mitinda ya Biblia. Tóbosana te ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekobikisa biso mpo na libela. Tolingi te kotya makanisi nyonso kaka na bokolɔngɔnɔ ya nzoto tii tózongisa losambo ya Yehova nsima.—Yisaya 33:24; 1 Timote 4:16.
Tosengeli koboya lisalisi nyonso ya monganga oyo emonani lokola ezali na boyokani na nguya ya bademo. (Kolimbola Mibeko 18:10-12; Yisaya 1:13) Na yango, liboso ondima lisalisi to nkisi moko, ezali malamu oyeba nyonso oyo esengeli mpo na yango mpe likanisi oyo yango ezali kolendisa. (Masese 14:15) Tosengeli te kobosana ete Satana alingi kokosa biso mpo tókɔta na boyokani na bademo. Soki kaka tomoni ete nkisi to lisalisi moko ekoki kozala na boyokani na bademo, eleki malamu koboya yango.—1 Petro 5:8.
a Minganga mosusu batalelaka biloko minei oyo esali makila lokola fractions sanguines. Yango wana, ekoki kosɛnga ete olimbola ekateli na yo ya koboya ete bátya yo makila to biloko minei oyo esali makila, elingi koloba, globules rouges, globules blancs, plaquettes, mpe plasma.